Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

 MOKAPO 12

Yesu azwi batisimo

Yesu azwi batisimo

MATAI 3:13-17 MARKO 1:9-11 LUKA 3:21, 22 YOANE 1:32-34

  • YESU AZWI BATISIMO MPE ATYAMI MAFUTA NA ELIMO SANTU

  • YEHOVA ALOBI ETE YESU AZALI MWANA NA YE

Eleki sikoyo sanza soki motoba banda Yoane abandaki kosakola, Yesu akómi sikoyo na mbula soki 30 mpe ayei na ebale ya Yordani. Mpo na nini? Ezali kaka te mpo na kotala moninga na ye. Ezali mpe te mpo Yesu alingi kotala ndenge mosala ya Yoane ezali kokende liboso. Kasi Yesu ayei kosɛnga Yoane abatisa ye.

Tokokamwa te ndenge Yoane atuni ete: “Ngai nde moto oyo yo osengeli kobatisa, bongo yo ozali koya epai na ngai?” (Matai 3:14) Yoane ayebi ete Yesu azali lokola moto nyonso te, kasi Mwana ya Nzambe. Tozali lisusu koyeba ete ntango Yoane azalaki naino na libumu ya mama na ye Elizabeti, apumbwaki na esengo ntango Maria, oyo azalaki na zemi ya Yesu ayaki kotala mama na ye. Kozanga ntembe, mama ya Yoane ayebisaki ye likambo yango. Ayebi mpe nsango oyo anzelu alobaki mpo na kobotama ya Yesu mpe ndenge baanzelu babimelaki babateli ya mpate na butu oyo Yesu abotamaki.

Yoane ayebi ete batisimo oyo azali kopesa bato ezali mpo na bato oyo bazali kobongola motema na masumu na bango. Kasi Yesu azali na lisumu te. Atako Yoane azali koboya, Yesu atye ye mbamba na maloba oyo: “Koboya te, mpamba te na ndenge wana nde tokokokisa mpenza makambo nyonso ya boyengebene.”​—Matai 3:15.

Mpo na nini ebongi ete Yesu azwa batisimo? Yesu azwi batisimo te mpo na komonisa ete abongoli motema mpo na masumu na ye. Batisimo na ye emonisi ete amipesi mpo na kosala mokano ya Tata na ye. (Baebre 10:5-7) Yesu azali mosali-mabaya, kasi sikoyo ntango ekoki mpo abanda kosala mosala oyo Tata na ye ya likoló atindaki ye awa na mabele. Okanisi ete Yoane azali kokanisa ete likambo moko ya kokamwa ekosalema ntango azali kopesa Yesu batisimo?

Na nsima, Yoane alobaki boye: “Oyo mpenza atindaki ngai nabatisa na mai alobaki na ngai ete: ‘Moto oyo okomona elimo ekiti likoló na ye mpe efandi, ye nde moto oyo abatisaka na elimo santu.’” (Yoane 1:33) Na yango, Yoane azali kozela elimo ya Nzambe eya likoló ya moto moko oyo akobatisa. Yango wana, ntango kaka Yesu abimi na mai, ekoki kozala ete Yoane akamwe te komona “elimo ya Nzambe ezali kokitela ye [Yesu] lokola ebenga.”​—Matai 3:16.

 Kasi likambo mosusu mpe esalemi ntango Yesu azwi batisimo. “Likoló efungwamaki.” Yango elimboli nini? Mbala mosusu elimboli ete na ntango Yesu azwi batisimo, akanisi makambo nyonso oyo elekaki na bomoi na ye ntango azalaki naino na likoló. Yesu azali kokanisa bomoi na ye lokola mwana ya elimo ya Yehova mpe solo oyo Nzambe ateyaki ye na likoló liboso aya awa na mabele.

Lisusu, ntango Yesu azwi batisimo, mongongo moko euti na likoló elobi ete: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi.” (Matai 3:17) Ezali mongongo ya nani? Ekoki te kozala mongongo ya Yesu mpo azali wana ná Yoane. Ezali nde mongongo ya Nzambe. Ya solo, Yesu azali Mwana ya Nzambe. Azali te Nzambe ye moko.

Ebongi mpenza koloba ete Yesu azali Mwana ya Nzambe, kaka ndenge Adama moto ya liboso azalaki. Nsima ya kolobela batisimo ya Yesu, moyekoli Luka akomaki boye: “Ntango abandaki mosala na ye, azalaki na mbula soki ntuku misato (30), bazalaki kokanisa ete azali mwana ya Yozefe, mwana ya Heli, . . . mwana ya Davidi, . . . mwana ya Abrahama, . . . mwana ya Noa, . . . mwana ya Adama, mwana ya Nzambe.”​—Luka 3:23-38.

Ndenge kaka Adama azalaki moto mpe “mwana ya Nzambe,” Yesu mpe azali kaka bongo. Ntango azwi batisimo, Yesu akómi na boyokani ya sika ná Nzambe, elingi koloba akómi Mwana ya Nzambe na elimo. Yango wana, Yesu abongi mpenza koteya biso solo oyo etali Nzambe mpe kolakisa biso nzela ya bomoi. Yesu abandi lolenge mosusu ya bomoi oyo nsukansuka ekosɛnga ete apesa bomoi na ye mbeka mpo na bato ya masumu.