Lakisá makambo oyo ezali na kati

Maria Magadalena azalaki nani?

Maria Magadalena azalaki nani?

Eyano ya Biblia

 Maria Magadalena azalaki moko ya bayekoli ya sembo ya Yesu Kristo. Emonani lokola nkombo na ye, Magadalena, euti na engumba Magadala (ekoki kozala Magadane), oyo ezalaki pene ya Mbu ya Galile. Mbala mosusu Maria afandaki kuna.

 Maria Magadalena azalaki moko ya basi oyo bazalaki kotambola elongo na Yesu mpe bayekoli na ye mpe bazalaki kosunga bango na biloko oyo bazalaki na yango mposa. (Luka 8:1-3) Amonaki na miso ndenge babomaki Yesu, mpe azalaki na kati ya bato ya liboso oyo bamonaki ye ntango asekwaki.​—Marko 15:40; Yoane 20:11-18.

 Maria Magadalena azalaki mwasi ya ndumba?

 Biblia elobi te ete Maria Magadalena azalaki mwasi ya ndumba. Mpo na kolobela bomoi na ye kala, Biblia elobi ete Yesu abimisaki ye bademo nsambo.​—Luka 8:2.

 Mpo na nini bato mingi balobaka ete azalaki mwasi ya ndumba liboso akóma moyekoli ya Yesu? Bankama ya bambula nsima ya liwa ya Maria Magadalena, bato mingi balobaki ete azalaki kaka mwasi wana oyo nkombo na ye eyebani te (mbala mosusu mwasi ya ndumba) oyo asukolaki makolo ya Yesu na mpisoli na ye mpe apangwisaki yango na nsuki na ye. (Luka 7:36-38) Kasi, Biblia endimisi likanisi yango te.

 Maria Magadalena azalaki “ntoma epai ya bantoma”?

 Te. Lingomba ya Katolike ebengaka Maria “Santu Maria Magadalena” to mpe “ntoma epai ya bantoma” mpo azalaki kati ya bato ya liboso oyo bamemelaki bantoma nsango ete Yesu asekwi. (Yoane 20:18) Kasi yango esali te ete azala ntoma. Mpe Biblia elobi esika moko te ete azalaki ntoma.​—Luka 6:12-16.

 Basilisaki kokoma Biblia pene na nsuka ya siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso. Nzokande, na siɛklɛ ya 6 nde bakonzi ya lingomba ya Katolike bazwaki mokano ya kobenga Maria Magadalena santu mpo na kopesa ye lokumu mingi. Ezali na makomi oyo ekomamaki na siɛklɛ ya mibale mpe ya misato ya ntango na biso, oyo ezali kolobela bantoma mosusu ya Yesu bazali koyokela Maria Magadalena zuwa, kasi makomi yango ezali te na kati ya liste ya solo ya mikanda ya Biblia. Masolo ya ndenge wana ya lokuta ezali te na kati ya Makomami mosantu.

 Maria Magadalena azalaki mwasi ya Yesu Kristo?

 Te. Kutu, Biblia emonisi polele ete Yesu atikalaki monzemba. a