Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

Yesu abalaki? Azalaki na bandeko?

Yesu abalaki? Azalaki na bandeko?

Eyano ya Biblia

Biblia emonisi polele ete Yesu abalaki te, ata soki elobi polele te soki azalaki monzemba. * Talelá makambo oyo elandi.

  1. Na bisika mingi, Biblia elobeli libota ya Yesu mpe basi oyo bazalaki kotambola elongo na ye na mosala ya kosakola mpe oyo bazalaki wana ntango babomaki ye, kasi elobi ata esika moko te ete azalaki na mwasi. (Matai 12:46, 47; Marko 3:31, 32; 15:40; Luka 8:2, 3, 19, 20; Yoane 19:25) Ntina mpenza oyo Biblia elobeli mwasi ya Yesu te ezali ete abalaki te.

  2. Mpo na baoyo baponi kotikala minzemba mpo básala mingi na mosala ya Nzambe, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Oyo akoki kosala yango [kotikala monzemba] asala yango.” (Matai 19:10-12) Atiká ndakisa mpo na baoyo bamoni malamu bábala te mpo bámipesa mobimba na mosala ya Nzambe.​—Yoane 13:15; 1 Bakorinti 7:32-38.

  3. Liboso Yesu akufa, atikelaki moto mosusu mokumba ya kobatela mama na ye. (Yoane 19:25-27) Soki Yesu azalaki na mwasi to soki azalaki na bana, alingaki kozwa bibongiseli mpo bato yango ya libota na ye mpe bábatelama malamu.

  4. Biblia elobi na mibali oyo babalá ete bálanda ndakisa ya Yesu, kasi ezali te mpo afandaki na mwasi. Biblia elobi nde ete: “Mibali, bókoba kolinga basi na bino, ndenge Kristo mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango.” (Baefese 5:25) Soki Yesu abalaki mpenza ntango azalaki awa na mabele, na ntembe te vɛrsɛ wana elingaki kolobela ndenge malamu oyo azalaki kosalela mwasi na ye makambo.

Yesu azalaki na bandeko?

Ɛɛ, Yesu azalaki na bandeko soki motoba: bandeko ya mibali Yakobo, Yozefe, Simo, ná Yudasi, mpe bandeko basi ata mibale. (Matai 13:54-56; Marko 6:3) Bandeko yango bazalaki bana oyo Maria, mama ya Yesu, abotaki na mobali na ye Yozefe. (Matai 1:25) Biblia ebengi Yesu “mwana ya liboso” ya Maria; yango emonisi ete Maria azalaki na bana mosusu.​—Luka 2:7.

Makanisi ya lokuta mpo na bandeko ya Yesu

Mpo na koluka kofandisa likanisi oyo elobaka ete Maria atikalaki ngɔndɔ bomoi na ye mobimba, bato mosusu balimbolaka liloba “bandeko” na ndenge mosusu. Na ndakisa, basusu balobaka ete bandeko ya Yesu bazalaki bana oyo Yozefe abotaki na mwasi mosusu liboso abala Maria. Nzokande, Biblia emonisi ete na kolanda mibeko, Yesu abotamaki na lotomo ya kozwa kiti ya bokonzi ya Davidi. (2 Samwele 7:12, 13; Luka 1:32) Soki Yozefe azalaki na bana oyo bazalaki mikóló ya Yesu, mwana ya liboso nde alingaki kozala na lotomo ya kozwa libula ya Yozefe.

Liloba “bandeko” elakisi nde bayekoli ya Yesu, bandeko na ye ya elimo? Likanisi yango eyokani te na Biblia, mpo Biblia elobi ete na ntango moko boye “bandeko na ye bazalaki kondimela ye te.” (Yoane 7:5) Biblia ekesenisi bandeko ya Yesu ná bayekoli na ye.​—Yoane 2:12.

Bato mosusu balobaka ete bandeko ya Yesu bazalaki nde bana ya bandeko ya baboti na ye. Kasi, Makomami ya Grɛki esaleli maloba ekeseni mpo na kolobela “ndeko,” “moto ya libota,” mpe mwana ya ndeko ya tata to ya mama. (Luka 21:16; Bakolose 4:10, msl) Bato mingi ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia bandimaka ete bandeko ya Yesu bazalaki bandeko na ye ya solo. Na ndakisa, buku moko (The Expositor’s Bible Commentary) elobi ete: “Liloba ‘bandeko’ . . . esalelami mpo na kolobela bana ya Maria ná Yozefe, mpe na ndenge yango, bandeko oyo balobeli wana ezali mpenza bandeko ya Yesu na ngámbo ya mama.” *

^ par. 3 Biblia elobi ete Kristo azali mobali ya mwasi moko, kasi bavɛrsɛ mosusu emonisi polele ete ezali na ndenge ya elilingi.​—Yoane 3:28, 29; 2 Bakorinti 11:2.

^ par. 13 Talá mpe buku The Gospel According to St. Mark, Ebimeli ya mibale, ya Vincent Taylor, lokasa 249, mpe buku A Marginal Jew​—Rethinking the Historical Jesus, ya John P. Meier, Volimi 1, nkasa 331-332.