Lakisá makambo oyo ezali na kati

Yesu azalaki ndenge nini?

Yesu azalaki ndenge nini?

Eyano ya Biblia

 Moto moko te ayebi mpenza ndenge Yesu azalaki, mpo Biblia elobeli yango te. Yango emonisi ete ndenge oyo Yesu azalaki komonana na miso ezali na ntina te. Kasi, Biblia esalisi biso tóyeba mwa moke ndenge Yesu azalaki.

  •   Ndenge azalaki: Yesu azalaki Moyuda mpe ekoki kozala ete akokanaki mwa moke na mama na ye. (Baebre 7:14) Ezali mpasi tóloba ete akesanaki mpenza na Bayuda mosusu. Mokolo moko, alongwaki na Galile mpe akendaki na Yerusaleme na kobombana kozanga ete bato báyeba ye. (Yoane 7:10, 11) Mpe emonani ete akesanaki mpenza te na bantoma na ye. Kobosana te ete esɛngaki ete Yudasi Mokeriota alakisa Yesu epai ya ebele ya bato oyo bayaki kokanga ye.​—Matai 26:47-49.

  •   Nsuki: Tokoki koloba te ete Yesu azalaki na nsuki milai mpo Biblia elobi ete “soki mobali azali na nsuki milai, ezali nsɔni mpo na ye.”​—1 Bakorinti 11:14.

  •   Mandefu: Yesu azalaki na mandefu. Alandaki mobeko ya Bayuda oyo epekisaki mibali ‘kobebisa ndelo ya mandefu na bango.’ (Balevi 19:27; Bagalatia 4:4) Longola yango, Biblia elobeli mandefu ya Yesu na esakweli oyo elobelaki minyoko na ye.​—Yisaya 50:6, Biblia haut fleuve.

  •   Nzoto: Masolo nyonso oyo elobeli Yesu, emonisi ete azalaki makasi. Azalaki kotambola bakilomɛtrɛ ebele mpo na kosakola. (Matai 9:35) Mbala mibale mobimba abenganaki Bayuda oyo bazalaki kotɛka na tempelo, abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kosenza mbongo, mpe mokolo mosusu abenganaki bangɔmbɛ ná bampate na fimbo. (Luka 19:45, 46; Yoane 2:14, 15) Buku moko (Cyclopedia) oyo McClintock ná Strong bakomaki elobi: “Masolo nyonso ya baevanzile emonisi ete [Yesu] azalaki mpenza na nzoto makasi.”​—Volimi 4, lokasa 884.

  •   Elongi: Yesu azalaki na boboto mpe na motema mawa, na ntembe te, yango ezalaki komonana na elongi na ye. (Matai 11:28, 29) Bato ya ndenge nyonso bazalaki koya epai na ye mpo abɔndisa mpe asalisa bango. (Luka 5:12, 13; 7:37, 38) Ata mpe bana mike bazalaki kosepela kozala elongo na ye.​—Matai 19:13-15; Marko 9:35-37.

Makanisi ya libunga mpo na ndenge Yesu azalaki

 Likanisi ya libunga: Bato mosusu balobaka ete Yesu azalaki moto ya Afrika mpo mokanda ya Emoniseli ekokanisi nsuki na ye na lɛni mpe makolo na ye na “ebende ya talo oyo bakómisá peto na móto.”​—Koyebisa basekelé (Emoniseli) 1:14, 15, Biblia na lingala ya lelo oyo.

 Likambo ya solo: Makambo mingi oyo ezali na mokanda ya Emoniseli ezali “bilembo.” (Emoniseli 1:1) Esaleli maloba ya elilingi ntango elobeli nsuki mpe makolo ya Yesu mpo na komonisa bizaleli ya Yesu nsima ya lisekwa na ye, kasi te mpo na kolobela ndenge Yesu azalaki komonana na miso ntango azalaki na mabele. Ntango Emoniseli 1:14 elobi ete ‘motó mpe nsuki ya Yesu ezalaki mpɛmbɛ lokola lɛni ya mpɛmbɛ, lokola nɛjɛ,’ esaleli nde langi, kasi te ndenge nsuki yango ezalaki mpenza mpo na kokokanisa yango na bizaleli na ye. Yango emonisi bwanya oyo azali na yango mpo na mbula na ye.​—Emoniseli 3:14.

 Makolo ya Yesu ezalaki lokola “motako ya pɛto ntango ezali kongɛnga na kati ya litumbu.” (Emoniseli 1:15) Elongi na ye mpe ezalaki “lokola moi ntango ezali kongɛnga makasi mpenza.” (Emoniseli 1:16) Lokola bato ya loposo ya bongo bazalaka te, yango emonisi ete emonaneli yango ezali nde elilingi, emonisi Yesu nsima ya kosekwa, ‘afandi na pole oyo likoki ya kopusana penepene na yango ezali te.’​—1 Timote 6:16.

 Likanisi ya libunga: Yesu azalaki makasi te.

 Likambo ya solo: Yesu azalaki mobali ya solosolo. Na ndakisa, na mpiko nyonso, amimonisaki epai ya ebele ya bato oyo bayaki kokanga ye. (Yoane 18:4-8) Esɛngaki mpe Yesu azala na makasi ya nzoto mpo na kosala mosala ya mabaya na bisaleli ya mabɔkɔ.​—Marko 6:3.

 Bongo mpo na nini Yesu azalaki na mposa básalisa ye mpo na komema nzete na ye ya mpasi? Mpe mpo na nini akufaki liboso ya bato oyo bakakisamaki pene na ye? (Luka 23:26; Yoane 19:31-33) Liboso bákakisa Yesu na nzete, nzoto na ye ezalaki ya kolɛmba makasi mpenza. Butu mobimba alalaki te mpo azalaki komitungisa mingi. (Luka 22:42-44) Na butu yango Bayuda banyokolaki ye, mpe na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki Baroma babɛtaki ye mabe. (Matai 26:67, 68; Yoane 19:1-3) Mbala mosusu makambo wana nde esalaki ete akufa noki.

 Likanisi ya libunga: Yesu azalaki ntango nyonso mawamawa.

 Likambo ya solo: Yesu amonisaki na ndenge ya kokoka bizaleli ya Yehova, Tata na ye ya likoló, oyo Biblia ebengi “Nzambe ya esengo.” (1 Timote 1:11; Yoane 14:9) Kutu, Yesu alakisaki bato ndenge ya kozala na esengo. (Matai 5:3-9; Luka 11:28) Makambo oyo nyonso emonisi ete Yesu azalaki ntango nyonso na esengo.