Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia eteyaka ete moto abotamaka mbala na mbala?

Biblia eteyaka ete moto abotamaka mbala na mbala?

Eyano ya Biblia

 Te, eteyaka bongo te. Ezala maloba “kobotama mbala na mbala” to likanisi yango ezali na Biblia te. Kondima ete moto abotamaka mbala na mbala euti na mateya oyo elobaka ete molimo ekufaka te. a Kasi, Biblia eteyaka ete molimo ezali moto na mobimba na ye mpe ekufaka. (Ebandeli 2:7; Ezekiele 18:4) Soki moto akufi azalaka lisusu te.​—Ebandeli 3:19; Mosakoli 9:5, 6.

Bokeseni nini ezali kati na kobotama mbala na mbala mpe lisekwa?

 Liteya ya Biblia oyo elobeli lisekwa euti te na na liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Mpo na lisekwa, bato oyo bakufaki bakozonga lisusu na bomoi na nzela ya nguya ya Nzambe. (Matai 22:23, 29; Misala 24:15) Lisekwa epesaka elikya ya kozonga lisusu na bomoi na likanisi ya kokufa lisusu te.​—2 Petro 3:13; Emoniseli 21:3, 4.

Makanisi ya libunga na likambo etali kobotama mbala na mbala

 Likanisi ya libunga: Biblia eteyaka ete mosakoli Eliya abotamaki lisusu lokola Yoane mobatisi.

 Solo: Nzambe asakolaki boye: “Nazali kotindela bino mosakoli Eliya” mpe Yesu amonisaki ete Yoane mobatisi nde akokisaki esakweli yango. (Malaki 4:5, 6; Matai 11:13, 14) Kasi, yango elakisi te ete Eliya abotamaki lisusu lokola Yoane mobatisi. Yoane ye moko alobaki ete azali Eliya te. (Yoane 1:21) Yoane asalaki mosala oyo ekokani na oyo ya Eliya, kosakwela bato nsango ya Nzambe na likambo etali kobongola motema. (1 Bakonzi 18:36, 37; Matai 3:1) Lisusu Yoane amonisaki “mayéle mpé ngúyá ya Elía.”​—Luka 1:13-17, Biblia–Liloba lya Nzambe.

 Likanisi ya libunga: Biblia elobelaka kobotama mbala na mbala lokola nde “kobotama lisusu.”

 Solo: Biblia emonisaka ete kobotama lisusu esalemaka nde na elimo ntango moto azali naino na bomoi. (Yoane 1:12, 13) Kobotama lisusu eutaka te na makambo oyo moto asalaki na bomoi na ye, kasi ezali nde lipamboli ya Nzambe oyo epesaka moto oyo azwi yango elikya mpo na mikolo ezali koya.​—Yoane 3:3; 1 Petro 1:3, 4.

a Mateya oyo elobaka ete molimo ekufaka te mpe moto abotamaka mbala na mbala eutá na mateya ya bato ya Babilone. Na nsima, bato ya filozofi ya Inde bakómisaki yango liteya ya Karma. Buku moko (Britannica Encyclopedia of World Religions) elobi ete Karma ezali “mobeko oyo esalaka ete makambo oyo moto asalaki na bomoi oyo azalaki na yango liboso ekoba tii na bomoi oyo akozala na yango ntango akobotama lisusu.”​—Lokasa 913.