Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

Molimo ezali nini?

Molimo ezali nini?

Eyano ya Biblia

Na Biblia, liloba “molimo” euti na liloba ya Ebre nèphèsh mpe na liloba ya Grεki psukhê. Liloba yango ya Ebre elimboli mpenzampenza “ekelamu oyo ezali kopema,” mpe ya Grɛki elimboli “ekelamu ya bomoi.” * Na yango, molimo ezali ekelamu mobimba, kasi te eloko moko oyo etikalaka na bomoi ntango nzoto ekufi. Tótalela ndenge Biblia emonisi ete molimo ya moto ezali moto mobimba:

Adama akómaki na molimo te, kasi “akómaki molimo ya bomoi”

  • Ntango Yehova akelaki moto ya liboso, Adama, Biblia elobi ete “moto akómaki molimo na bomɔi.” (Ebandeli [to Genese] 2:7, haut fleuve) Adama akómaki na molimo te, kasi akómaki nde molimo to moto ya bomoi.

  • Biblia elobi ete molimo ekoki kosala mosala, koyoka nzala, kolya, kotosa mibeko mpe kosimba ebembe. (Balevi 5:2; 7:20; 23:30; Kolimbola Mibeko 12:20; Baroma 13:1) Moto mobimba nde akoki kosala makambo wana nyonso.

Molimo ekufaka?

Ɛɛ, molimo ekoki kokufa. Bavɛrsɛ mingi ya Biblia emonisi ete molimo ekufaka. Talá mwa bandakisa:

  • “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.”​—Ezekiele 18:4, 20, haut fleuve.

  • Na ekólo Yisraele, etumbu nini ezalaki kopesama mpo na masumu oyo eleki minene? “molimo” oyo asali yango asengelaki “kolongolama.” (Kobima 12:15, 19; Balevi 7:20, 21, 27; 19:8) Moto yango azalaki ‘kobomama.’​—Kobima [to Exode] 31:14, haut fleuve.

  • Na bavɛrsɛ mosusu esaleli maloba “molimo oyo akufi” mpo na kolobela ebembe. (Balevi 21:11; Mitángo 6:6) Babiblia ebele esaleli maloba “nzoto oyo ekufi” to “moto oyo akufi” na bavɛrsɛ yango; kasi liloba ya Ebre oyo esalelami na esika yango ezali nde nèphèsh to “molimo.”

“Molimo” ekoki kolimbola “bomoi”

Na bisika mosusu, Biblia esaleli mpe “molimo” mpo na kolobela “bomoi.” Na ndakisa, Yobo 33:22 esaleli liloba ya Ebre “molimo” (nèphèsh) mpo na kolobela “bomoi.” Ndenge moko mpe, Biblia emonisi ete moto akoki kotya molimo to bomoi na ye na likama, to kobungisa yango.​—Kobima 4:19; Basambisi 9:17; Bafilipi 2:30.

Ndimbola wana ya liloba “molimo” esalisi biso tókanga ntina ya bavɛrsɛ oyo elobi ete molimo ezali “kobima” to “kolongwa.” (Ebandeli [Genese] 35:18; haut fleuve) Elobeli yango ya elilingi emonisaka ete bomoi ya moto ezali kosuka. Babiblia mosusu ebongoli maloba yango oyo ezali na Ebandeli 35:18 na “kokata motema.”​—Bible na lingala ya lelo oyo.

Liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te eutá wapi?

Mangomba ya bokristo ya nkombo mpamba oyo endimaka ete molimo ekufaka te ezwá liteya yango na Biblia te, kasi nde na filozofi ya Grɛki ya kala. Buku moko (The Encyclopædia Britannica) elobi ete: “Ntango Biblia esalelaka liloba molimo, elobelaka likambo etali mpema. Emonisaka te ete molimo ekeseni na nzoto. Mateya ya mangomba ya bokristo oyo elobi ete molimo ezali eloko oyo ekeseni na nzoto euti epai ya Bagrɛki ya kala.”

Nzambe andimaka te ete básangisa mateya na ye na bafilozofi ya bato, na ndakisa liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Biblia eyebisi biso polele ete: “Bókeba: mbala mosusu moto moko akoki komema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba na kolanda mimeseno ya bato.”​—Bakolose 2:8.

^ par. 3 Talá buku The New Brown, Driver, and Briggs Hebrew and English Lexicon of the Old Testament, lokasa 659, mpe buku Lexicon in Veteris Testamenti Libros, lokasa 627. Babiblia mingi ebongoli liloba nèphèsh mpe psukhê na ndenge ekeseni na kotalela lisolo; esaleli maloba lokola “molimo,” “bomoi,” “moto,” “ekelamu,” to “nzoto.”

Makambo mosusu

Biblia eteyaka mpenza nini?

Bato oyo bakufá bazali wapi?