Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Matai 6:33​—“Bokoba koluka liboso Bokonzi ya Nzambe”

Matai 6:33​—“Bokoba koluka liboso Bokonzi ya Nzambe”

 “Bokoba koluka liboso Bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.”​—Matai 6:33, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

 “Bolukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyɛngɛbɛnɛ na ye mpe bilɔkɔ oyo nyonso ikobakisama na bino.”—Matai 6:33, Biblia haut-fleuve.

Ndenge Matai 6:33 elimbolami

 Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema oyo ezali na likoló oyo ekosala ete mokano ya Nzambe esalema awa na mabele. (Matai 6:9, 10) Moto alukaka liboso Bokonzi soki azali kosala ete ezala likambo eleki ntina na bomoi na ye. a Yango esuki kaka te na koyekola makambo etali Bokonzi ya Nzambe, kasi elimboli mpe koyebisa basusu makambo ya malamu oyo Bokonzi yango ekosala. (Matai 24:14) Moto oyo alukaka Bokonzi abondelaka mpe ete Bokonzi yango eya.​—Luka 11:2.

 Boyengebene ya Nzambe esangisi mibeko na ye na oyo etali malamu mpe mabe. (Nzembo 119:172) Na yango, moto alukaka boyengebene ya Nzambe soki azali kotosa mibeko ya Nzambe, likambo oyo ebimisaka ntango nyonso matomba ya malamu.​—Yisaya 48:17.

 Maloba bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu ezali elaka ete Nzambe akokokisa bamposa ya baoyo nyonso batyaka Bokonzi mpe mibeko na ye na esika ya liboso .​—Matai 6:31, 32.

Makambo oyo Matai 6:33 ezali kolobela

 Yesu alobaki maloba yango na lisolo na ye likoló ya ngomba, oyo ezali na Matai mokapo ya 5 tii ya 7. Na ntembe te, bato mingi oyo bazalaki koyoka Yesu bazalaki babola. Bakokaki kokanisa ete basengelaki kotya makanisi na bango nyonso na koluka ndenge ya kozwa biloko ya mosuni, nzokande yango elingaki kosala ete bázala na ntango mingi te mpo na koluka Bokonzi. Kasi Yesu asɛngaki bango bátala malamumalamu ndenge oyo Nzambe akokisaka bamposa ya milona mpe banyama. Nzambe alaki ete akosala mpe bongo mpo na baoyo balukaka liboso Bokonzi na ye.​—Matai 6:25-30.

Makanisi ya libunga oyo bato bazalaka na yango na maloba oyo ezali na Matai 6:33

 Likanisi ya libunga: Moto oyo alukaka Bokonzi akokóma moto ya bozwi.

 Likambo ya solo: Yesu alobaki ete baoyo balukaka liboso Bokonzi ya Nzambe bakozwa oyo basengeli na yango, na ndakisa bilei mpe bilamba. (Matai 6:25, 31, 32) Kasi, alakaki te ete bakokóma na bozwi, mpe amonisaki te ete kokóma mozwi nde ekomonisa ete Nzambe apamboli moto. Kutu, Yesu akebisaki bayoki na ye na likambo etali koluka kokóma na bozwi, mpo yango ekoki kosala ete ezala mpasi mpo moto aluka liboso Bokonzi. (Matai 6:19, 20, 24) Ntoma Paulo asalaki mosala makasi mpo na Bokonzi ya Nzambe, kasi na bantango mosusu azalaki kozanga biloko ya mosuni. Ndenge moko na Yesu, akebisaki basusu na likambo etali koluka kokóma mozwi.​—Bafilipi 4:11, 12; 1 Timote 6:6-10.

 Likanisi ya libunga: Bakristo basengeli te kosala mosala mpo na kozwa biloko ya mosuni.

 Likambo ya solo: Biblia elobi ete bakristo basengeli kosala mosala mpo na kokokisa bamposa na bango mpe oyo ya bato ya mabota na bango. (1 Batesaloniki 4:11, 12; 2 Batesaloniki 3:10; 1 Timote 5:8) Yesu alobaki te ete bayekoli na ye basengeli koluka kaka Bokonzi; kasi alobaki nde ete basengeli koluka liboso Bokonzi.

 Baoyo balukaka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe oyo basalaka mosala mpo na kozwa biloko ya mosuni, bakoki kotyela Nzambe motema ete akosalisa bango bázwa biloko ya kobikela.​—1 Timote 6:17-19.

a Maloba “bokoba . . . Koluka,” oyo ebongolami na liloba ya Grεki emonisi kokoba kosala likambo moko, mpe maloba yango ekoki kobongolama na “koluka ntango nyonso.” Na yango, Bokonzi esengeli kozala likambo ya liboso kasi kaka te likambo oyo moto asengeli kosala na boumeli ya ntango moko boye.