Mokanda ya mibale ya Samwele 21:1-22

  • Bagibeone bazongiseli libota ya Saulo mabe (1-14)

  • Bitumba ná Bafilistia (15-22)

21  Na boyangeli ya Davidi, nzala moko+ ekɔtaki mpe esalaki mbula misato. Na yango Davidi atunaki Yehova, mpe Yehova alobaki: “Ngambo ya makila ezali na motó ya Saulo mpe libota na ye, mpo abomaki Bagibeone.”+ 2  Na yango, mokonzi abengaki Bagibeone+ mpe asololaki na bango. (Nzokande Bagibeone bazalaki Bayisraele te, kasi bazalaki nde Baamore+ oyo batikalaki. Bayisraele balapelaki bango ndai ete bakoboma bango te,+ kasi Saulo alukaki koboma bango mpo azalaki kosepela te ndenge bazalaki kofanda na kati ya bato ya Yisraele mpe ya Yuda.) 3  Davidi alobaki na Bagibeone boye: “Bolingi nasalela bino nini, mpe ndenge nini nakoki kolongola ngambo oyo na Yisraele, mpo bópambola bato* ya Yehova?” 4  Bagibeone balobaki na ye: “Tozali na mposa ya wolo te, palata mpe te+ mpo na mabe oyo Saulo ná bato ya libota na ye basalaki biso. Lisusu, tozali na lotomo te ya koboma moto na Yisraele.” Bongo mokonzi alobaki na bango: “Nyonso oyo bokosɛnga ngai nasala, nakosalela bino yango.” 5  Balobaki na mokonzi boye: “Moto oyo alingaki kosilisa biso mpe akanaki kolimwisa biso mpo tózala lisusu te, ata na teritware moko ya Yisraele,+ 6  tosɛngi bópesa biso bana na ye nsambo ya mibali. Tokoboma bango mpe tokobaka bibembe* na bango na nzete+ liboso ya Yehova na Gibea+ ya Saulo, mokonzi oyo Yehova aponaki.”+ Na yango, mokonzi alobaki: “Nakopesa bino bango.” 7  Kasi mokonzi ayokelaki Mefiboshete,+ mwana ya Yonatane mwana ya Saulo mawa, mpo na ndai oyo Davidi ná Yonatane+ mwana ya Saulo balapelanaki liboso ya Yehova. 8  Na yango, mokonzi azwaki Aramoni ná Mefiboshete, bana mibali mibale oyo Rizipa+ mwana ya Aiya, abotaki ná Saulo. Azwaki mpe bana mibali mitano oyo Mikale*+ mwana mwasi ya Saulo, abotelaki Adriele+ mwana ya Barazilai moto ya Meholate. 9  Na nsima, apesaki bango na lobɔkɔ ya Bagibeone. Bongo Bagibeone babomaki bango mpe babakaki bibembe na bango na nzete likoló ya ngomba liboso ya Yehova.+ Bango nyonso nsambo babomamaki na mokolo ya liboso ya kobuka mbuma, na ebandeli ya eleko ya kobuka mbuma ya ɔrje. 10  Bongo, Rizipa+ mwana ya Aiya azwaki ngɔtɔ,* atandaki yango na libanga moko, mpe afandaki wana banda ebandeli ya eleko ya kobuka mbuma tii ntango mbula ebɛtɛlaki bibembe yango. Atikaki te bandɛkɛ ya likoló ekitela bibembe yango na moi, to banyama ya zamba oyo efandaka na esobe epusana pene na yango na butu. 11  Bayebisaki Davidi makambo oyo Rizipa mwana ya Aiya, mwasi mosusu* ya Saulo, asalaki. 12  Bongo Davidi akendaki kozwa mikuwa ya Saulo mpe mikuwa ya mwana na ye Yonatane epai ya bankumu* ya Yabeshe-gileade.+ Mpo ntango Bafilistia babomaki Saulo na Gilboa,+ bato ya Yabeshe-gileade bakendaki koyiba ebembe ya Saulo ná ya Yonatane na esika monene ya bato nyonso ya Bete-shane, esika oyo Bafilistia babakaki bango. 13  Azwaki mikuwa ya Saulo ná mikuwa ya mwana na ye Yonatane kuna. Basangisaki mpe mikuwa ya mibali oyo babomamaki.*+ 14  Na nsima, bakundaki mikuwa ya Saulo mpe ya mwana na ye Yonatane na mokili ya Benyamina, na Zela,+ na lilita ya tata na ye Kishe.+ Nsima ya kosala makambo nyonso oyo mokonzi apesaki mitindo, Nzambe andimaki mabondeli oyo basalaki mpo na ekólo.+ 15  Etumba ebimaki lisusu kati na Bafilistia ná Yisraele.+ Bongo Davidi elongo na basoda na ye bakendaki kobunda na bango, kasi Davidi alɛmbaki. 16  Yishibi-benobe, moko ya bakitani ya Barefaime,+ azalaki na likɔnga moko oyo kilo ya kwivre na yango ezalaki shekele 300.*+ Akangaki mopanga moko ya sika na loketo na ye, mpe akanaki koboma Davidi. 17  Na mbala moko, Abishai+ mwana ya Zeruya ayaki kosalisa ye+ mpe abomaki Mofilistia yango. Na ntango yango, basoda ya Davidi balapelaki ye ndai oyo: “Okokende lisusu na biso na etumba te.+ Osengeli koboma mwinda ya Yisraele te!”*+ 18  Nsima na yango, bitumba ebimaki lisusu ná Bafilistia+ na Gobe. Na ntango yango, Sibekai+ Mohusha abomaki Safe, oyo azalaki moto ya libota ya Barefaime.+ 19  Na nsima, bitumba ebimaki lisusu ná Bafilistia+ na Gobe. Mpe Elehanane mwana ya Yaare-oregime, moto ya Beteleme, abomaki Goliate moto ya Gate, oyo nzete ya likɔnga na ye ezalaki monene lokola nzete ya kolíngela nsinga oyo basali-bilamba basalelaka.+ 20  Etumba mosusu ebimaki na Gate. Kuna, ezalaki na mobali moko ya mbinga mpenza, oyo azalaki na misapi 24: misapi 6 na lobɔkɔ mokomoko mpe misapi 6 na lokolo mokomoko. Ye mpe azalaki moto ya libota ya Barefaime.+ 21  Azalaki kaka kotumola Yisraele.+ Na yango, Yonatane mwana ya Shimei,+ ndeko ya Davidi, abomaki ye. 22  Bafilistia yango minei bazalaki bato ya libota ya Barefaime oyo bazalaki kofanda na Gate. Davidi ná bato na ye nde babomaki bango.+

Maloba na nse

Lil., “libula.”
Lil., “tokotanda bango,” elingi koloba, nsima ya kobuka bango mabɔkɔ ná makolo.
To mbala mosusu, “Merabe.”
To, “makango.”
To mbala mosusu, “bankolo mabele.”
Lil., “batandamaki.”
Soki 3,42 kg. Talá Ap. B14.
Elingi koloba, mpo Yisraele eya kozanga mokambi to motambwisi te.