Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Mpo na nini bisakweli ezali na Biblia?

Mpo na nini Biblia elobeli makambo ya ntango na biso?​—Luka 21:10, 11.

Bisakweli mingi oyo elobeli ata makambo ya mikemike ezali na Biblia. Moto moko te akoki kolobela makambo oyo ekosalema ata na makambo na yango ya mikemike. Na yango, kokokisama ya bisakweli ya Biblia emonisi mpenza ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe.​—Tángá Yosua 23:14; 2 Petro 1:20, 21.

Bisakweli ya Biblia oyo ekokisamá etindaka biso tózala na kondima epai ya Nzambe. (Baebre 11:1) Endimisaka biso mpe ete bilaka ya Nzambe oyo etali bomoi ya malamu na mikolo ezali koya ekokokisama. Na yango, bisakweli ya Biblia epesaka biso elikya ya solosolo.​—Tángá Nzembo 37:29; Baroma 15:4.

Ndenge nini bisakweli ya Biblia esalisaka biso?

Bisakweli mosusu ekebisaka basaleli ya Nzambe bálalisa mabɔkɔ te. Na ndakisa, ntango bakristo ya siɛklɛ ya liboso bamonaki kokokisama ya mwa bisakweli mosusu, balongwaki na Yerusaleme. Na nsima, ntango engumba yango ebebisamaki mpo mingi ya bato na yango baboyaki Yesu, bakristo yango bazalaki mosika, na esika moko ya libateli.​—Tángá Luka 21:20-22.

Lelo oyo, bisakweli oyo ekokisamá emonisaka ete mosika te Bokonzi ya Nzambe ekosukisa biyangeli mpe baguvɛrnema ya bato. (Danyele 2:44; Luka 21:31) Yango wana, ebongi ete moto mokomoko asala na lombangu sikoyo mpo Yesu Kristo, mokonzi oyo Nzambe atye andima ye.​—Tángá Luka 21:34-36.