Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Nayekolaki ete Yehova azali motema mawa mpe alimbisaka

Nayekolaki ete Yehova azali motema mawa mpe alimbisaka
  • ABOTAMAKI NA: 1954

  • EKÓLO: CANADA

  • BOMOI NA YE YA KALA: MOTO OYO ABUBAKA, MOBƐTI-MASANO YA MBONGO

NDENGE NAZALAKI:

Nakolá na kartye moko ya babola na engumba Montréal. Tata akufaki ntango nazalaki na sanza motoba, mpe mikumba nyonso ya libota etikalaki na motó ya mama. Nazali mwana ya nsuka na libota ya bana 8.

Ntango nazalaki kokola, nazalaki komɛla drɔgɛ mikolo nyonso, kobɛta masano ya mbongo, kobunda, mpe kofanda ná bato ya mobulu. Ntango nakómaki na mbula 10, nakómaki mwana ya bitinda ya basi ya ndumba, mpe kokongola mbongo mpo na bato oyo badefisaka na matabisi. Nazalaki kokosa mingi mpe kosepela kobuba bato ndenge nyonso nalingi. Ekómaki lokola drɔgɛ mpo na ngai.

Ntango nakómaki na mbula 14, nakolisaki lisusu mayele ya kokosa bato. Na ndakisa, nazalaki kosomba ebele ya bamontre, shɛnɛti ya mabɔkɔ mpe biloko ya matoi oyo bapakolá wolo mpe nazalaki kotya yango kashɛ oyo ezali komonisa ete ezali na wolo mingi (14 carats) mpe na nsima nazalaki kotɛka yango na balabala mpe na baparkingi ya bamagazini. Kozwa mbongo na pɛtɛɛ nyonso ezalaki kosepelisa ngai mpenza. Mokolo moko, nazwaki benefisi ya mosolo ya dolare 10 000 na mokolo moko!

Nazalaki na mbula 15, ntango babenganaki ngai na eteyelo oyo esembolaka bana ya mobulu mpe nazalaki lisusu na esika ya kofanda te. Nakómaki kolala na balabala, na parkɛ mpe na bandako ya baninga oyo nakutanaki na bango na nzela.

Mbala mingi polisi ezalaki kolandela ngai mpo nazalaki kobuba bato. Lokola nazalaki kotɛka biloko ya moyibi te, natikalá kokɔta bolɔkɔ te. Kasi, nazalaki kofuta baamande mingi mpo na kobuba, kokosa mpe kotɛka kozanga ndingisa. Lokola nazalaki kobanga moto te, nazalaki kutu kokongola mbongo mpo na bato oyo badefisaka na matabisi. Ezalaki likama mpe na bantango mosusu nazalaki komema mondoki to kosala elongo na bato ya mobulu.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Natángaki Biblia mpo na mbala ya liboso ntango nazalaki na mbula 17. Nazalaki kofanda ná makango na ngai moko oyo akómaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova. Kasi, bizaleli oyo Biblia epekisi esepelisaki ngai te, yango wana natikaki ye mpe nakendeki kofanda epai ya makango mosusu oyo nazalaki kobima na ye liboso.

Makambo ebongwanaki ntango makango na ngai wana mpe akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova! Abongolaki mpenza bomoi na ye mpe ndenge akómaki boboto mpe motema molai ekamwisaki ngai. Nandimaki kokende na likita moko oyo babengisaki ngai na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova. Bato yango oyo balataki malamu mpe bazalaki boboto bayambaki ngai malamu. Natikalá komona makambo ya ndenge wana liboso te! Nalekisá bomwana na ngai kozanga ete bato ya libota na ngai bámonisela ngai bolingo to boboto. Bolingo oyo namonaki epai ya Batatoli ya Yehova, yango nde nazalaki koluka mpenza. Ntango basɛngaki báyekola na ngai Biblia, nandimaki na esengo nyonso.

Na ntembe te, makambo oyo nayekolaki na Biblia ebikisaki bomoi na ngai. Tokanaki kokende koyiba ná baninga na ngai mibale mpo nafuta nyongo ya mosolo ya dolare 50 000 oyo nakɔtaki mpo na masano ya mbongo. Kasi, nazali na esengo ndenge nabendaki nzoto! Baninga na ngai ya kala bakobaki koyiba. Moko na bango bakangaki ye mpe mosusu babomaki ye.

Ntango nakobaki koyekola Biblia, namonaki ete nasengelaki kotika makambo mingi ya mabe. Na ndakisa, nayebaki oyo Biblia elobi na 1 Bakorinti 6:10. Elobi boye: “Miyibi, bato ya lokoso, balangwi-masanga, bafingi, mpe babɔtɔli bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” Ntango natángaki vɛrsɛ yango, makambo mabe oyo nasalá etindaki ngai natángisa mai ya miso. Namonaki ete nasengeli mpenza kobongola bomoi na ngai. (Baroma 12:2) Nazalaki moto ya mobulu mpe bomoi na ngai mobimba etondaki na lokuta.

Kasi, nayekolaki mpe na Biblia ete Yehova azali motema mawa mpe alimbisaka. (Yisaya 1:18) Nabondelaki mingi, nasɛngaki Yehova asalisa ngai nalongola bomoto na ngai ya kala. Na lisalisi na ye, mokemoke nabongolaki bizaleli na ngai. Mbongwana monene oyo nasalaki ezali ntango tokomisaki libala na biso na buku ya Leta.

Nazali na bomoi lelo mpo nasalelaki batoli ya Biblia

Nazalaki na mbula 24 mpe tata ya bana misato. Sikoyo nasengelaki koluka mosala moko ya malamu. Kasi, natángaki mingi te mpe nayebaki te nabanda wapi. Nabondelaki mpenza Yehova lisusu. Na nsima nakendaki koluka mosala. Nayebisaki bapatrɔ yango ete nalingaki mpenza kobongola bomoi na ngai mpe kosala mosala na bosembo nyonso. Na bantango mosusu, nazalaki komonisa ete nazalaki koyekola Biblia mpe nazalaki na mposa ya kokóma moto malamu mpenza. Bapatrɔ mingi bazalaki koboya kozwa ngai na mosala. Nsukansuka, nsima ya komonisa polele bomoi ya mabe oyo nazalaki na yango kala liboso ya patrɔ oyo azalaki kotuna ngai mituna, alobaki boye: “Nayebi mpenza te mpo na nini, kasi likanisi moko ezali koyela ngai ete nazwa yo na mosala.” Namonaki mpenza ete ezali eyano ya mabondeli na ngai. Na nsima, ngai ná mwasi na ngai, tozwaki batisimo mpe tokómaki Batatoli ya Yehova.

MATOMBA OYO NAZWI:

Nazali na bomoi lelo mpo nasalelaki batoli ya Biblia mpe nakómaki na bomoi ya bokristo. Nazali na libota moko ya malamu. Lokola namindimisaki ete Yehova alimbisi ngai, nakómá na lisosoli ya pɛto mpe nazali na esengo.

Na boumeli ya mbula 14, nazalaki kolekisa bangonga ebele na mosala ya kosakola mpo na kosalisa bato mosusu báyekola oyo Biblia eteyaka, mpe eumelaki te, mwasi na ngai akómaki kosakola nsango malamu elongo na ngai. Na boumeli ya mbula 30, nazwi esengo ya kosalisa baninga na ngai ya mosala 22 bákóma kosambela Yehova. Nakendaka kaka na bamagazini, kasi te mpo na kobuba bato ndenge nazalaki kosala liboso. Sikoyo, ntango nakendaka kuna mbala mingi nasakwelaka basusu mateya ya Biblia. Nalingaka kokabola na bango eloko moko: elikya ya kozala na bomoi na mokili ya sika oyo bato oyo babubaka bakozala te.​—Nzembo 37:10, 11.