Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi . . .

Liteya ya Bosato eutá na Biblia?

Liteya ya Bosato eutá na Biblia?

▪ Atako liteya ya Bosato elimbolamaka na ndenge mingi, balimbolaka yango mpe boye: “Banzambe misato (Tata, Mwana, mpe Elimo santu), balobaka ete bango nyonso bazali libela na libela, bazali na nguya nyonso, moko te aleki moninga to azali na nse ya moninga. Balobaka ete mokomoko azali Nzambe, kasi atako bongo, bango nyonso misato bazali kaka Nzambe moko.” Liteya yango euti na Biblia?

Mbala mingi batángaka maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 28:19 mpo na kondimisa liteya yango. Na vɛrsɛ yango, Biblia Liloba lya Nzambe elobi boye: “Yangó wâná bókende, bókómisa bato ba bikólo bínso bayékoli ba ngáí, bóbátisa bangó o nkómbó ya Tatá mpé ya Mwána mpé ya Elímo Sántu.” Ezali solo ete na vɛrsɛ yango batángi Tata, Mwana mpe elimo santu. Nzokande, vɛrsɛ yango elobi te ete bazali moto moko. Na maloba wana, Yesu azalaki nde kopesa Bayuda oyo bazalaki bayekoli na ye mokumba ya koteya mpe kobatisa bato na nkombo ya Tata, ya Mwana, mpe ya elimo santu. Mateya nini Bayuda bazalaki kondima?

Ntango ekólo Yisraele ezwaki Mibeko ya Moize, oyo ezali mpe na kati ya Biblia, Nzambe ayebisaki bango boye: “Osengeli te kozala na banzambe mosusu liboso na ngai.” (Kolimbola Mibeko 5:7) Na vɛrsɛ oyo, bato boni bazali koloba? Kolimbola Mibeko 6:4 elobi polele ete: “Yoká, Ee Yisraele: Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko”​—kasi misato te. Bayisraele bautaki kobima na boombo na Ezipito, epai bato bazalaki kosambela banzambe misatomisato, na ndakisa Osiris, Isis, mpe Horus (oyo fɔtɔ na bango ezali awa na lobɔkɔ ya mwasi). Yango wana, Nzambe apesaki Bayisraele mobeko ya kosambela kaka ye moko. Mpo na nini ezalaki na ntina mingi ete Bayisraele bátosa mobeko wana? Joseph Hertz, moto moko oyo azalaki rabi, alobi boye: “Etinda wana ya kosambela Nzambe kaka moko ezalaki kotɛmɛla likambo ya kosambela banzambe ebele . . . Na kati ya Shema, liteya ya Bosato ezalaki te, mpamba te yango ezalaki kobuka mobeko oyo elobi ete Nzambe azali kaka moko.” *

Lokola Yesu abotamaki Moyuda, bateyaki ye atosaka etinda yango. Nsima ya batisimo na ye, ntango Zabolo amekaki ye, alobaki boye: “Longwá, Satana! Mpo ekomamá ete: ‘Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.’” (Matai 4:10; Kolimbola Mibeko 6:13) Tokoki kozwa mateya mibale na lisolo yango. Ya liboso, Satana alukaki kotinda Yesu asambela moto mosusu na esika ya kosambela Yehova. Yango elingaki kozala na ntina te soki Yesu ye moko azalaka na kati ya Nzambe yango. Ya mibale, ntango Yesu alobaki “kaka ye moko,” amonisaki polele ete ezali na Nzambe kaka moko oyo bato basengeli kosambela. Nzokande soki ye mpe azalaka na kati ya Bosato, alingaki koloba “biso.”

Ntango moto azwi boyebi ya solosolo ya Nzambe mpe alingi kosalela ye, azwaka batisimo “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.” (Matai 28:19) Moto yango ayebaka mpe andimaka ete Yehova azali mokonzi na ye, ayebaka mpe mokumba oyo Yesu azali na yango na kokokisama ya mokano ya Yehova. (Nzembo 83:18; Matai 28:18) Lisusu, ayebaka mokumba mpe mosala ya elimo santu, to nguya oyo Nzambe asalaka na yango mosala.​—Ebandeli 1:2; Bagalatia 5:22, 23; 2 Petro 1:21.

Banda bankama ya bambula, liteya ya Bosato etyá bato na mobulu. Nzokande, Yesu alongolaki bayekoli na ye na molili mpe asalisaki bango báyeba Yehova, “Nzambe ya solo kaka moko.”​—Yoane 17:3.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 5 Kondimela Nzambe kaka moko, ndenge Shema, libondeli oyo euti na Kolimbola Mibeko 6:4 emonisi yango, ezalaki na ntina mingi na losambo, na sinagoga.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 23]

Musée du Louvre, Paris