Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Namonisi nkombo na yo polele”

“Namonisi nkombo na yo polele”

“Namonisi nkombo na yo polele”

“Namonisi nkombo na yo polele na bato oyo ozwi na mokili mpe opesi ngai. . . . Nayebisi bango nkombo na yo mpe nakoyebisa yango.”​—YOANE 17:6, 26.

Yango elimboli nini? Yesu ayebisaki nkombo ya Nzambe polele na ndenge azalaki kosalela yango na mosala na ye. Na ntembe te, Yesu azalaki kotánga nkombo ya Nzambe mbala na mbala ntango azalaki kotánga Makomami. (Luka 4:16-21) Ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Tata, nkombo na yo esantisama.”​—Luka 11:2.

Ndenge oyo bakristo ya liboso bakokisaki yango: Ntoma Petro ayebisaki mikóló ya Yerusaleme ete Nzambe abimisaki uta na bikólo “ekólo moko mpo na nkombo na ye.” (Misala 15:14) Bantoma mpe bayekoli mosusu basakolaki ete “moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.” (Misala 2:21; Baroma 10:13) Basalelaki mpe nkombo ya Nzambe na mikanda oyo bakomaki. Tosefta, buku moko ya mibeko ya Bayuda, oyo basilisaki kokoma na mobu soki 300 ya ntango na biso, elobi boye mpo na ndenge oyo banguna bazalaki kotumba mikanda ya bakristo: “Babuku ya bato oyo bakomaki baevanzile mpe babuku ya ba minim [oyo bakanisaka ete bazalaki Bayuda oyo bazalaki bakristo] batumbaki yango na mɔtɔ. Bapesaki nzela ete bátumba yango na esika oyo bakokuta yango, . . . babuku yango mpe mikanda mosusu oyo ezali na nkombo ya Nzambe na kati.”

Banani bazali kolanda ndakisa wana lelo oyo? Libongoli moko ya Biblia (Revised Standard Version) oyo Conseil national des Églises chrétiennes ya États-Unis endimaki, elobi boye na maloba na yango ya ebandeli: “Liboso kutu Kristo abotama, lingomba ya Bayuda etikaki kosalela nkombo ya Nzambe kaka moko ya solo, oyo bazalaki komona ete ezalaki kokesenisa ye ná banzambe mosusu, mpe ebongi te ete bandimi nyonso ya mangomba ya bokristo básalelaka yango.” Yango wana, na esika ya nkombo ya Nzambe, batyaki titre “NKOLO.” Na mikolo oyo euti koleka, Vatican eyebisaki Baepiskopo ete: “Nkombo ya Nzambe, oyo emonisami na balɛtrɛ minei ya Ebre YHWH, * esengeli kosalelama te mpe kotángama te na banzembo mpe na mabondeli.”

Banani lelo oyo basalelaka nkombo ya Nzambe mpe bayebisaka yango epai ya basusu? Ntango Sergey azalaki naino elenge, na ekólo Kirghizistan, atalaki filme moko oyo emonisaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Banda wana, elekaki mbula soki 10, ayokaki nkombo yango lisusu te. Na nsima, ntango Sergey akendaki kofanda na États-Unis, Batatoli ya Yehova mibale bayaki kotala ye na ndako mpe balakisaki ye nkombo ya Nzambe na Biblia. Sergey akamwaki kokutana na bato oyo basalelaka nkombo Yehova. Kutu, na diksionɛrɛ moko (Webster’s Third New International Dictionary), na esika oyo bakomi “Yehova Nzambe,” bapesi ndimbola oyo: “Nzambe oyo ayebani ete aleki banzambe nyonso mpe Nzambe kaka moko oyo Batatoli ya Yehova basambelaka.”

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 5 Na Lingala, mbala mingi nkombo ya Nzambe ebengamaka “Yehova” to “Yawe.”