Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Basalaki na “elanga” liboso ya ntango ya kobuka mbuma

Basalaki na “elanga” liboso ya ntango ya kobuka mbuma

Basalaki na “elanga” liboso ya ntango ya kobuka mbuma

BAYEKOLI ya Moteyi Monene bakamwaki. Yesu abɛtaki lisolo mokuse ya nganu (blé) na matiti mabe. Lisolo yango ezali kati na ebele ya masese oyo ayebisaki bango mokolo yango. Ntango asilisaki, bato mingi oyo bayokaki ye bakendaki. Kasi bayekoli na ye bayebaki ete masese yango esengeli kozala na ndimbola, mingimingi lisese ya nganu na matiti mabe. Bayebaki ete Yesu azali te kaka moto oyo abɛtaka masolo ya kitoko.

Matai alobi ete batunaki Yesu boye: “Limbwelá biso lisese ya matiti mabe na elanga.” Yesu alimbolaki lisese yango, asakolaki ete lipɛngwi monene ekobima na kati ya bayekoli na ye. (Matai 13:24-30, 36-38, 43) Likambo yango esalemaki, lipɛngwi epalanganaki nokinoki nsima ya liwa ya ntoma Yoane. (Misala 20:29, 30; 2 Batesaloniki 2:6-12) Makambo ya lipɛngwi yango epalanganaki mingi, yango wana motuna oyo Yesu atunaki, ndenge ekomami na Luka 18:8, emonanaki ete ebongi mpenza: “Wana ekoya Mwana ya moto, akokuta kondima awa na nse?”

Koya ya Yesu ekozala ebandeli ya ntango ya “kobuka mbuma,” elingi koloba baklisto oyo bazali lokola nganu. Yango ekozala elembo ya ‘nsuka ya mokili,’ yango ebandaki na 1914. Yango wana tokokamwa te ete bato mosusu babandaki kosepela na mateya ya solo ya Biblia mwa moke liboso ete ntango ya kobuka mbuma ebanda.—Matai 13:39.

Soki totaleli lisolo ya kala tokomona mpenza ete kobanda na ekeke ya 15, makanisi ya bato mingi ebandaki kolamuka, ata na kati ya mangomba ya boklisto oyo bakokanisami na “matiti mabe,” to baklisto ya lokuta. Na eleko yango moto nyonso oyo alingi akokaki kozala na Biblia, mpe basalaki mikanda oyo esalisaka na koluka mikapo ya Biblia (concordance), bato ya mitema sembo babandaki kotánga Makomami na likebi mpenza.

Pole engɛngi

Na kati ya bato yango na ebandeli ya ekeke ya 19 ezalaki na Henry Grew (mobu 1781-1862), autaki na engumba Birmingham, na ekólo Angleterre. Ntango azalaki na mbula 13, libota na bango mobimba bakɔtaki na masuwa mpo na kokende na États-Unis; bakómaki mokolo ya 8 Yuli 1795. Bafandaki na engumba Providence, na etúká ya Rhode Island. Baboti na ye basalisaki ye na kolinga Biblia. Na mobu 1807, wana Grew azalaki na mbula 25, babengisaki ye akende kosala lokola pastɛrɛ na Lingomba ya Protesta na engumba Hartford, na etúká ya Connecticut.

Amipesaki mpenza na mosala na ye mpe azalaki kosalisa bato oyo azalaki kokamba mpo básalelaka makambo oyo Makomami elobi na bomoi na bango. Kasi, azalaki kondima ete esengeli kobatela lisangá ezala pɛto mpo moto nyonso oyo azali kosala masumu na nko abebisa yango te. Na nsima, ye na mibali mosusu oyo bazalaki na mikumba na lingomba, babandaki kobengana (kobimisa), na lingomba baoyo bazalaki kosala pite to baoyo bamipesaki na misala mosusu ya mbindo.

Makambo mosusu na lingomba ezalaki mpe kotungisa ye. Mibali mosusu bazalaki bandimi ya lingomba te kasi bazalaki kotalela makambo ya mbongo ya lingomba mpe bazalaki koyembisa na ndako-nzambe. Mibali yango bakokaki mpe ata kozwa bikateli mosusu na makambo ya lingomba mpe lisusu makambo mosusu ya lingomba ezalaki na mabɔkɔ na bango. Na kotalela mobeko oyo esɛngi baklisto bákabwana na mokili, Grew azalaki kondima mpenza ete bobele mibali ya sembo nde basengeli kozala na mikumba wana. (2 Bakolinti 6:14-18; Yakobo 1:27) Mpo na ye, ndenge bato oyo bazalaki bandimi te bazalaki koyembisa nzembo ya kokumisa Nzambe ezalaki mpenza kofinga Nzambe. Lokola azalaki na makanisi wana, na mobu 1811, babenganaki Grew na lingomba. Na ntango yango kaka, bandimi mosusu mpe oyo bazalaki na makanisi ndenge moko na Grew bamilongolaki na lingomba.

Bakabwani na mangomba ya boklisto

Bato yango, na Henry Grew, babandaki koyekola Biblia na mokano ya koyokanisa bomoi mpe misala na bango na toli ya Biblia. Ntango babandi koyekola Biblia, baumelaki te koyeba ebele ya makambo ya solo ya Biblia mpe boyebi yango etindaki bango na kotɔndɔla mabunga ya mangomba ya boklisto. Na ndakisa, na mobu 1824, Grew akomaki mokanda moko oyo emonisaki ntina ya solosolo ya koboya liteya ya Bosato. Talá makanisi ya malamu na mokapo oyo tozwi na makambo akomaki: “ ‘Mpo na mokolo yango, mpe ngonga yango eyebani na moto te, te ata baanzelu te oyo bazali na likoló, ata mpe Mwana te, bobele TATA.’ [Malako 13:32] Talá oyo ezali esika ya moto na moto. Moto, Baanzelu, Mwana, Tata. . . . Nkolo ateyi biso ete kaka Tata nde ayebi mokolo yango. Kasi yango ekozala solo te soki, ndenge bamosusu bakanisaka ete, Tata, Liloba, mpe Elimo Santu bazali bato misato na kati ya Nzambe moko; mpamba te, na kotalela [liteya ya Bosato,] . . . Mwana mpe ayebaki yango lokola Tata.”

Grew amonisaki polele lokuta ya bakonzi ya lingomba na bakonzi ya basoda oyo bazalaki koloba na maloba mpamba ete bazali kosalela Klisto. Na mobu 1828 alobaki boye: “Oyo ezali bongolabongola, ete moklisto oyo auti kobondela na ndako na ye mpo na banguna na ye, mpe amema lisusu basoda na ye bábɛta kaka banguna yango masasi na mitema? Na ngámbo mosusu, akokani mpenza na Nkolo na ye liboso akufa, kasi na ngámbo mosusu akokani na nani? Yesu abondelaki mpo na bato oyo babomaki ye. Baklisto bazali koboma bato oyo bango moko bazali kobondela mpo na bango.”

Na ndenge ebongi mpenza, Grew akomaki boye: “Ntango nini tokondimela Mozwi-na-Nguya-Nyonso oyo alobi na biso ete ‘bakosaka ye te?’ Ntango nini tokokanga ntina ya losambo ya bulɛɛ oyo ezali kosɛnga biso tóboya ‘likambo nyonso oyo emonani ete ezali mabe?’ . . . Oyo ezali kofinga Mwana mopambwami, na kokanisa ete losambo na ye ezali kosɛnga moto asala lokola anzelu na likambo moko, mpe na likambo mosusu asala lokola demo, boye te?”

Moto nyonso akozwa bomoi ya seko te

Na bambula wana ntango radio na televizyo ebimaki naino te, moto nyonso oyo alingaki komonisa makanisi na ye azalaki kokoma mwa babuku mpe kokabola yango. Pene na mobu 1835, Grew akomaki mwa buku moko ya ntina oyo emonisaki polele liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te mpe amonisaki ete liteya ya lifelo ya mɔ́tɔ ezali na Biblia te. Grew amonaki ete mateya yango ezali kofinga Nzambe.

Mwa buku yango ebimisaki makambo oyo ye moko akanisaki te. Na mobu 1837, George Storrs, mobali moko ya mbula 40, azwaki mwa buku yango na engbunduka. Na ntango azwaki mwa buku yango, Storrs moto ya Lebanon, na etúká ya New Hampshire azalaki kofanda na Utica, na etúká ya New York.

Storrs azalaki pastɛrɛ oyo bazalaki kotosa mingi na Lingomba ya Metodiste. Ntango atángaki mwa buku yango, akamwaki na makambo ya solo mpenza oyo balobaki mpo na kokweisa mateya ya mangomba ya boklisto, atyelaki mateya oyo atangaki ntembe ata moke te. Ayebaki moto oyo akomaki yango te, tii nsima ya mwa bambula, na mobu 1844, akutanaki na Henry Grew ntango bango mibale bakómaki kofanda na engumba Philadelphie, na etúká ya Pennsylvanie. Kasi, Storrs ayekolaki likambo yango ye moko mbula misato, azalaki koyebisa yango kaka na bapastɛrɛ mosusu.

Nsukansuka, lokola moto te akokaki kokweisa makambo oyo azalaki koyekola, George Storrs alobaki ete akozala sembo epai ya Nzambe te soki atikali kaka na Lingomba ya Metodiste. Amilongolaki na lingomba yango na mobu 1840 mpe akendaki na engumba Albany, na etúká ya New York.

Na ebandeli ya eleko ya molunge na mobu 1842, Storrs asalaki masukulu motoba na pɔsɔ motoba na motó ya likambo oyo: “Motuna—Bato mabe bakufaka te?” Bato mingi basepelaki na masukulu yango, yango wana akomaki yango na mokanda, mpe na boumeli ya koleka mbula 40 oyo elandaki, mikanda oyo ebimaki ezalaki 200 000 na États-Unis mpe na Grande-Bretagne. Storrs na Grew basalaki elongo mpo na kotyana ntembe na bato mosusu likoló ya liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Grew ateyaki na molende tii ntango akufaki mokolo ya 8 Augusto 1862, na engumba Philadelphie.

Mwa moke na nsima ya kosala masukulu motoba oyo tolobelaki, Storrs akómaki kosepela na mateya ya William Miller, ye azalaki kokanisa ete Klisto akozonga na mobu 1843 mpe bato bakomona ye. Na boumeli ya mbula soki mibale, Storrs amipesaki mpenza na koteya nsango yango na nɔrdi-ɛsti ya États-Unis mobimba. Nsima ya mobu 1844, atikaki kopesa dati ya kozonga ya Klisto, kasi apekisaki moto te kosala bolukiluki ya badati soki moto ye moko alingi. Storrs andimaki ete etikali moke Klisto azonga mpe ezalaki na ntina mingi ete bato bálamuka na mpɔngi mpe básɛnzɛla na elimo, bámilɛngɛla mpo na mokolo yango oyo Klisto akoya kotala. Kasi akabwanaki na Miller na bato na ye mpo bazalaki kondima mateya oyo ezali na Makomami te, lokola molimo ekufaka te, mokili ekozika na mɔ́tɔ, mpe baoyo bazali kokufa na kozanga boyebi bazali na elikya ya bomoi ya seko te.

Bolingo ya Nzambe ekomema na likambo nini?

Storrs aboyaki liteya ya Lingomba ya Adventiste oyo ezalaki koteya ete Nzambe akosekwisa bato mabe kaka mpo na kobomama lisusu. Amonaki eloko te na kati ya Makomami oyo endimisi ete Nzambe akosala likambo oyo ezangi ntina ndenge wana mpe kozongisa mabe na mabe ndenge wana. Storrs na baninga na ye bakendaki mosika na ngámbo mosusu mpe balobaki ete bato mabe bakosekwa te. Atako bazalaki na mokakatano ya kolimbola mikapo mosusu oyo elobelaka lisekwa ya bato ya sembo te, bamonaki ete makanisi na bango ezalaki na boyokani mingi na bolingo ya Nzambe. Bingɛngiseli mosusu na bososoli ya mokano ya Nzambe eumelaki te koya.

Na mobu 1870, Storrs abɛlaki maladi makasi mpe akokaki lisusu kosala mosala te basanza mingi. Na ntango yango, atalelaki lisusu makambo nyonso oyo ayekolaki na boumeli ya mbula 74. Alobaki ete azangisaki likambo moko ya ntina mingi na kati ya mokano ya Nzambe mpo na bato ndenge emonisami na kondimana ya Abalayama, elingi koloba ‘mabota nyonso ya mokili bakopambwama mpamba te Abalayama ayokaki mongongo ya Nzambe.’—Genese 22:18; Misala 3:25.

Yango ememaki likanisi ya sika na bɔɔngɔ na ye. Soki “mabota nyonso” ekopambwama, elingi koloba bato nyonso basengeli koyoka nsango malamu, boye te? Ndenge nini bakoyoka yango? Bamilio na bamilio ya bato basilá kokufa, boye te? Ntango atalelaki lisusu malamumalamu Makomami, alobaki ete ezali na bituluku mibale ya “bato mabe” oyo bakufá: baoyo baboyaki bolingo ya Nzambe na nko, na baoyo bakufaki na kozanga boyebi.

Storrs alobaki ete baoyo bakufaki na kozanga boyebi, bakosekwa mpo na kopesa bango libaku ya kozwa bolamu ya mbeka oyo Klisto Yesu apesaki mpo na kobikisa bato. Baoyo bakondima yango bakofanda libela na libela awa na mabele. Baoyo bakoboya yango bakobomama. Storrs andimaki ete Nzambe akosekwisa moto moko te kozanga ete apesa ye elikya ya bomoi malamu na mikolo ekoya. Nsukansuka, moto te akokufa mpo na lisumu ya Adama longola Adama ye moko! Kasi ezali boni mpo na baoyo bakozala na bomoi na eleko Nkolo Yesu Klisto akozonga? Na nsuka Storrs ayaki komona ete mosala ya kosakola na mokili mobimba esengeli kosalema mpo bato yango nyonso báyoka. Ayebaki ata moke te ndenge likambo yango ekosalema, kasi lokola azalaki na kondima, akomaki boye: “Kasi bato mingi, soki baboyaka kondima likambo soki bazali komona te ndenge ekosalema, ezali lokola nde Nzambe akoki kosala yango te mpo bakoki te komona ndenge ekosalema.”

George Storrs akufaki na sanza ya Desɛmbɛ ya mobu 1879, na ndako na ye na Brooklyn, na engumba New York, pene na esika oyo ekómaki esika ya kotambwisa mosala ya kosakola na mokili mobimba oyo azalaki kolobela mingi.

Kongɛnga mosusu esengelaki kobakisama

Bato lokola Henry Grew na George Storrs bakangaki ntina ya mateya ya solo polele lokola biso lelo oyo? Te. Bayebaki ete bazalaki kosala milende, ndenge Storrs alobaki na mobu 1847: “Tosengeli koyeba ete touti nde kobima na eleko ya molili ya mangomba; mpe tokokamwa te soki tomoni ete ezali na ‘bindimeli’ mosusu ‘ya Babilone’ oyo tozali kotalela yango naino lokola mateya ya solo.” Na ndakisa, Grew azalaki kondima lisiko oyo Yesu apesaki, kasi akangaki ntina mpenza te ete ezalaki “lisiko oyo ekokani,” elingi koloba, bomoi ya moto ya kokoka oyo Yesu apesaki na esika ya bomoi ya Adama, moto ya kokoka. (1 Timote 2:6, NW ) Henry Grew azalaki kondima na libunga nyonso ete Yesu akozonga mpe bato bakomona ye ntango akoyangela awa na mabele. Kasi, Grew azalaki komibanzabanza na kosantisama ya nkombo ya Yehova, likambo oyo bato moke kaka nde basepelaki na yango kobanda ekeke ya mibale T.B.

George Storrs mpe asosolaki malamumalamu te makambo mosusu ya ntina. Azalaki komona mabunga ya bakonzi ya mangomba, kasi ntango mosusu azalaki mpe kolekisa ndelo na makanisi na ye. Na ndakisa, emonani ete alekisaki ndelo ya koboya likanisi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse mpo na Satana, Storrs aboyaki kondima ete Zabolo azali moto ya solo. Aboyaki liteya ya Bosato; kasi, tii pene na liwa na ye ayebaki mpenzampenza te soki elimo santu ezali moto. Atako George Storrs ayebaki ete bato bakomona Klisto te ntango akozonga, kasi azalaki kokanisa ete likambo moko ekosalema oyo ekomonana na miso. Atako bongo, emonani ete mibali yango mibale bazalaki na mitema malamu mpe sembo, mpe mwa makambo ya solo oyo bayebaki elekaki ya bato mingi.

Ntango ekokaki naino te mpo na kobuka mbuma na “elanga” oyo Yesu alobelaki na lisese ya nganu na matiti mabe. (Matai 13:38) Grew, Storrs, na bamosusu basalaki na “elanga” mpo na kobongisa mosala ya kobuka mbuma.

Charles Taze Russell, oyo abandaki kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na mobu 1879, akomaki na ntina na bambula na ye ya ebandeli ete: “Nkolo apesaki biso bato mingi oyo basalisaki biso mpo na koyekola Liloba na ye, kati na bango ezali na moko oyo asalaki mingi mpenza, ndeko na biso ya bolingo mpe nkulutu, George Storrs oyo, na maloba mpe na mikanda asungaki biso mingi; kasi tokanisaki ata moke te kozala bayekoli ya bato, atako bazalaki malamu mpe na mayele, kasi tozali ‘bayekoli ya Nzambe lokola bana ya bolingo.’ ” Ya solo, Bayekoli ya sembo ya Biblia bazwaki litomba na milende ya bato lokola Grew na Storrs, kasi ezalaki na ntina mingi bátalela kaka Biblia, Liloba ya Nzambe, lokola esika oyo solo ezali.—Yoane 17:17.

[Etanda/Elilingi na lokasa 26]

Makambo oyo Henry Grew andimaki

Nkombo ya Yehova efingamaki, mpe esengeli kosantisama.

Bosato, molimo ekufaka te, mpe lifelo ya mɔ́tɔ ezali mateya ya lokuta.

Lisangá ya boklisto esengeli kokabwana na mokili.

Baklisto basengeli kokɔta na bitumba ya bikólo te.

Baklisto bazali na nse ya mobeko moko ya Sabata te oyo epekisi bango kosala mosala mokolo ya pɔsɔ to mokolo ya lomingo.

Baklisto basengeli te kokɔta na masangá ya nkuku, lokola francs-maçons.

Na kati ya baklisto esengeli te ete bamosusu bázala bakonzi bongo bamosusu bandimi.

Bankombo ya lokumu na lingomba euti epai ya motɛmɛli ya Klisto.

Masangá nyonso esengeli kozala na bankulutu.

Bankulutu basengeli kozala bulɛɛ na etamboli na bango nyonso, bázala na efundeli te.

Baklisto nyonso basengeli kosakola nsango malamu.

Bato bakofanda libela na libela na Paladiso awa na mabele.

Nzembo ya baklisto esengeli kokumisa Yehova na Klisto.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Fɔtɔ: Collection of The New-York Historical Society/69288

[Etanda/Elilingi na lokasa 28]

Makambo oyo George Storrs andimaki

Yesu apesaki bomoi na ye lokola lisiko mpo na bato.

Mosala ya kosakola nsango malamu esalemaki naino te (na mobu 1871).

Yango wana, nsuka ekokaki te kozala pene na eleko yango (na mobu 1871). Mosala ya kosakola esengelaki kosalema nsima.

Bato bakozwa bomoi ya seko awa na mabele.

Bato nyonso oyo bakufaki na kozanga boyebi bakosekwa. Baoyo bakondima mbeka ya lisiko ya Klisto bakozwa bomoi ya seko awa na mabele. Baoyo bakoboya yango bakobomama.

Liteya oyo elobi ete molimo ekufaka te mpe liteya ya lifelo ya mɔ́tɔ ezali mateya oyo ezali kokumisa Nzambe te.

Elambo ya Mpokwa ya Nkolo esengeli kosalama mbala moko na mbula na mokolo ya 14 Nisana.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Fɔtɔ: SIX SERMONS, ekomamaki na George Storrs (1855)

[Bililingi na lokasa 29]

Na 1909, Charles Russell, mokomi ya “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” akendaki na Brooklyn, na engumba New York, na États-Unis.