Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Okoki kosala boyokani na Nzambe oyo amonanaka te?

Okoki kosala boyokani na Nzambe oyo amonanaka te?

Okoki kosala boyokani na Nzambe oyo amonanaka te?

Okoki mbala mosusu kotuna ete: ‘Ndenge nini nakoki kosala boyokani na moto oyo nakoki komona ye te?’ Motuna yango ekoki komonana ete ezali motuna ya malamu mpenza. Kasi, kanisá naino:

KOMONANA ezalaka mpenza na ntina nini mpo bato bálingana solosolo mpe bolingo yango eumela? Makambo mosusu oyo emonanaka te ezali na ntina to mbala mosusu kutu eleki ntina, boye te? Ɛɛ, ezali mpenza bongo! Yango wana, tomonaka bato mosusu bakómá baninga ya motema kaka na nzela ya mikanda. Mikanda oyo batindelanaka eyebisaka mpenza makambo nyonso oyo balingaka mpe oyo balingaka te, mikano na bango, makambo oyo batosaka, masɛki mpe bizaleli mosusu to makambo mosusu oyo balingaka.

Bato oyo bakufá miso bamonisaka biso ete komona ezali te likambo oyo eleki ntina mpo na kokóma moninga ya motema ya moto mosusu. Tókamata ndakisa ya Edward na mwasi na ye Gwen; bango mibale bazali bato oyo bakufá miso. * Edward na Gwen bakutanaki na eteyelo moko ya bato oyo bakufá miso, bazalaki na kelasi moko. Bizaleli ya Gwen esepelisaki Edward, mingimingi bosembo na ye, ezala na maloba to na etamboli na ye, mpe lisusu alingaki mosala. Gwen mpe asepelaki na Edward mpamba te, ndenge ye moko alobi yango, “azalaki na bizaleli nyonso ya ntina oyo bateyaki ngai.” Balinganaki mpe mbula misato na nsima, babalanaki.

Edward alobi boye: “Ntango bozali elongo, kokufa miso ekoki kopekisa yo te okóma moninga ya moto mosusu. Ekoki kozala ete bozali komonana te, kasi bozali koyebana.” Lelo oyo, nsima ya mbula 57, bolingo na bango ezali kaka makasi. Balobi ete sɛkɛlɛ ya bolingo na bango ezali na makambo soki minei: (1) kotyela bizaleli malamu ya moto mosusu likebi, (2) kokanisa mpe kosepela na bizaleli malamu yango, (3) kosolola malamu ntango nyonso, mpe (4) kosala makambo elongo.

Makambo minei wana ezali na ntina mingi mpo boyokani nyonso ezala malamu, ezala na kati ya baninga, na kati ya mwasi na mobali to mpe, na koleka kati na moto na Nzambe. Na lisolo oyo elandi, tokomona ndenge nini kosalela makambo yango ekoki kosalisa biso tóyokana malamu na Nzambe, atako tokoki komona ye te. *

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 4 Topesi bango bankombo mosusu.

^ par. 6 Kozala na boyokani na Nzambe ekeseni na kozala na boyokani na moto, mpo moto ayokana na Nzambe, asengeli kondima ete Nzambe azali. (Baebele 11:6) Mpo na koyeba malamu ndenge ya kokóma na kondima makasi epai ya Nzambe, talá buku Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.