Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nzambe, oyo azali “Moyoki ya libondeli,” asepelaka koyoka biso.​—NZEMBO 65:2

Bondeláká Nzambe

Bondeláká Nzambe

Bato bakoki kosolola na Nzambe mpe koyebisa ye makambo oyo bazali na yango na motema na nzela ya libondeli. Davidi abondelaki ete: “Ee Moyoki ya libondeli, ɛɛ bato ya lolenge nyonso bakoya epai na yo.” (Nzembo 65:2) Kasi Nzambe ayokaka mpe andimaka mabondeli ya ndenge nini?

MABONDELI OYO EUTI NA MOTEMA

Ntango moto abondelaka, asopaka motema na ye liboso ya Nzambe, na maloba mosusu ayebisaka Nzambe nyonso oyo ezali na kati ya motema na ye. (Nzembo 62:8) Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alingaka mabondeli oyo eutaka na motema.

BƐNGÁ NZAMBE NA NKOMBO

Nzambe azali na batitre mingi, kasi azali na nkombo moko. Makomami Mosantu elobi: “Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai.” (Yisaya 42:8) Nkombo Yehova ezali mbala soki 7 000 na Makomami Mosantu. Basakoli mingi bazalaki kobenga Nzambe na nkombo na ye ntango bazalaki kobondela. Abrahama alobaki ete: “Yehova . . . nabondeli yo, . . . tiká ngai naloba lisusu [na yo].” (Ebandeli 18:30) Biso mpe ntango tozali kobondela Nzambe, tosengeli kobenga ye na nkombo na ye: Yehova.

BONDELÁ NA MONƆKƆ OYO OYEBI MALAMU

Ata soki tobondeli Nzambe na monɔkɔ nini, ayebi makanisi na biso mpe makambo oyo tozali na yango na motema. Makomami Mosantu elobi ete: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.”​—Misala 10:34, 35.

Kasi mpo Nzambe apambola biso tosengeli kosuka kaka te na kobondela. Masolo oyo elandi ekolobela makambo mosusu oyo tosengeli kosala.