Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Soki tozali kotosa mibeko ya Nzambe tokozala na esengo ya solosolo

Nzambe apambolaka baoyo batosaka ye

Nzambe apambolaka baoyo batosaka ye

Moize alobaki ete soki tozali kotosa mibeko ya Nzambe akopambola biso. (Kolimbola Mibeko 10:13; 11:27) Soki totosaka Nzambe, ezali te mpo tobangaka apesa biso etumbu. Ezali nde mpo azali na bizaleli malamu, mpo tolingaka ye mpe tolingaka te kosala likambo moko ekopesa ye mpasi. Makomami Mosantu elobi: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye; kutu mibeko na ye ezali kilo te.”​—1 Yoane 5:3.

Kasi mapamboli nini tokozwa soki tozali kotosa Nzambe? Tólobela mibale.

1. TOKOKÓMA NA BWANYA

“Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola.”​—YISAYA 48:17.

Yehova, Nzambe oyo asalá biso, ayebi biso malamu mpe apesi biso batoli oyo esengeli. Soki tolingi kozwa bikateli ya malamu, tosengeli koyekola Makomami Mosantu mpo na koyeba oyo Nzambe alingi tósala mpe na nsima tósalela yango.

2. TOKOZALA NA ESENGO

“Esengo . . . na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!”​—LUKA 11:28.

Lelo oyo, bamilio ya bato oyo bazali kotosa Liloba ya Nzambe bazalaka na esengo. Tózwa ndakisa ya mobali moko na Espagne, oyo azalaki kandakanda. Azalaki kosalela mwasi na ye mpe bato mosusu makambo na boboto te. Mokolo moko atángaki makomami ya Moize oyo elobeli Yozefe, mwana ya Yakobo, azalaki na boboto. Batɛkaki ye, akómaki moombo mpe batyaki ye na bolɔkɔ atako asalaki likambo ya mabe te. Azalaki kaka na boboto, alukaki kotya kimya, mpe alimbisaki bato oyo basalaki ye mabe. (Ebandeli, mikapo 37-45) Mobali yango ya Espagne alobi: “Ndakisa ya Yozefe esalisaki nga nakóma moto malamu, na boboto mpe nakóma na komipekisa. Lelo oyo nazali mpenza na esengo.”

Makomami Mosantu emonisi ndenge oyo tosengeli kosalela basusu makambo. Lisolo oyo elandi ekolobela yango.