BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Nakoki kosɛnga nini na libondeli?

Lingala
Nakoki kosɛnga nini na libondeli?
https://cms-imgp.jw-cdn.org/img/p/502012525/univ/art/502012525_univ_sqr_xl.jpg
ijwbq lisolo 27

Nakoki kosɛnga nini na libondeli?

Nakoki kosɛnga nini na libondeli?

Eyano ya Biblia

 Okoki kosɛnga eloko nyonso oyo eyokani na mokano ya Nzambe, ndenge Biblia emonisi yango. “Ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano [ya Nzambe], akoyoka biso.” (1 Yoane 5:14) Okoki kolobela ata makambo oyo ezali kotungisa yo? Ɛɛ. Biblia elobi: “Bósopa motema na bino liboso [ya Nzambe].”​—Nzembo 62:8.

Makambo oyo okoki kosɛnga

  •   Nzambe apesa yo kondima.​—Luka 17:5.

  •   Elimo santu, to nguya ya Nzambe, esalisa yo osala makambo ya malamu.​—Luka 11:13.

  •   Makasi mpo olonga mikakatano mpe otɛmɛla komekama.​—Bafilipi 4:13.

  •   Kimya ya motema mpe ya makanisi.​—Bafilipi 4:6, 7.

  •   Bwanya mpo ozwaka bikateli ya malamu.​—Yakobo 1:5.

  •   Bilei ya mokolo na mokolo.​—Matai 6:11.

  •   Bolimbisi ya masumu.​—Matai 6:12.