Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini Nzambe aboyaka koyoka mabondeli mosusu?

Mpo na nini Nzambe aboyaka koyoka mabondeli mosusu?

Eyano ya Biblia

 Nzambe ayokaka mabondeli nyonso te. Talá makambo mibale oyo esalaka ete Nzambe aboya koyoka libondeli ya moto.

1. Soki libondeli eyokani te na mokano ya Nzambe

 Nzambe aboyaka koyanola mabondeli oyo eyokani te na mokano na ye to mibeko na ye oyo ezali na Biblia. (1 Yoane 5:14) Na ndakisa, Biblia epekisi kozala na lokoso. Kobɛta masano ya mbongo etindaka moto akóma na lokoso. (1 Bakorinti 6:9, 10) Na yango, Nzambe akoyoka yo te soki obondeli ye mpo olonga na tombola. Nzambe asalelaka bato te likambo nyonso balingi. Kutu osengeli kosepela lokola ezali bongo. Soki te, osengelaki kobanga mpo okoyeba te makambo oyo bato mosusu bakokaki kosɛnga Nzambe.​—Yakobo 4:3.

2. Soki moto oyo azali kobondela asalaka makambo ya mabe na nko

 Nzambe ayokaka te bato oyo basalaka makambo ya mabe na nko. Na ndakisa, Nzambe ayebisaki baoyo bazalaki koloba ete basambelaka ye nzokande basalaka makambo ya mabe ete: “Ata bozali kobondela mingi, nazali koyoka te; mabɔkɔ na bino etondi na makila oyo bosopi.” (Yisaya 1:15) Kasi soki babongwani mpe ‘babongisi makambo’ na Nzambe, akoyoka bango ntango bakobondela ye.​—Yisaya 1:18.