Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini okoki kobondela mpo Nzambe ayoka mabondeli na yo?

Ndenge nini okoki kobondela mpo Nzambe ayoka mabondeli na yo?

Yehova Nzambe azali “Moyoki ya libondeli.” (Nzembo 65:2) Tokoki kosolola na ye bisika nyonso oyo tolingi mpe na ntango nyonso oyo tolingi, ezala na mongongo makasi to na motema. Yehova alingi tóbengaka ye “Tata,” mpe ya solo mpenza azali tata ya malamu koleka batata nyonso. (Matai 6:9) Na bolingo mpenza, Yehova alakisi biso ndenge ya kobondela ye mpo ayoka biso.

BONDELÁKÁ YEHOVA NZAMBE NA NKOMBO YA YESU

“Soki bosɛngi Tata eloko akopesa bino yango na nkombo na ngai.”​Yoane 16:23.

Maloba ya Yesu emonisi polele ete Yehova alingi tóbondela ye, na nzela ya bikeko te, ya basantu te, ya baanzelu te, to ya bankɔkɔ te, kasi na nkombo ya Yesu Kristo. Ntango tozali kobondela Nzambe na nkombo ya Yesu, emonisi ete, toyebi ete Nzambe azali koyoka mabondeli na biso mpo na oyo Yesu asalelaki biso. Yesu alobaki boye: “Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.”​—Yoane 14:6.

LOBÁKÁ NA MOTEMA MOBIMBA

“Bósopa motema na bino liboso na ye.”​—Nzembo 62:8.

Ntango tozali kobondela Yehova, tosengeli koloba na ye lokola tozali koloba na tata ya bolingo. Na esika ya kotánga libondeli na buku moko to koloba makambo oyo tokangi na motó, tosengeli nde koloba na ye na limemya mpe na motema mobimba.

BONDELÁKÁ NA BOYOKANI NA MOKANO YA NZAMBE

“Ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.”​—1 Yoane 5:14.

Na kati ya Biblia, Yehova Nzambe ayebisi biso makambo oyo akosalela biso, mpe makambo oyo alingi ete tósalela ye. Mpo Nzambe andima mabondeli na biso, tosengeli kobondela “na boyokani na mokano na ye.” Mpo na kosala bongo, tosengeli koyekolaka Biblia mpo tókoka koyeba ye malamu. Soki tosali bongo, mabondeli na biso ekosepelisa ye.

 TOKOKI KOBONDELA MPO NA MAKAMBO NINI?

Bondeláká mpo na biloko oyo ozali na yango mposa. Tokoki kobondela Nzambe mpo na biloko oyo tozali na yango mposa mokolo na mokolo: bilei, bilamba, mpe ndako ya kofanda. Tokoki mpe kobondela Nzambe apesa biso bwanya mpo na kozwa bikateli ya malamu, mpe makasi mpo na koyikela mikakatano mpiko. Tokoki lisusu mpe kobondela Nzambe apesa biso kondima, alimbisa biso, mpe asalisa biso.​—Luka 11:3, 4, 13; Yakobo 1:5, 17.

Bondeláká mpo na bato mosusu. Baboti ya bolingo basepelaka ntango bana na bango bazali kolingana. Biso tozali bana ya Yehova, mpe alingi ete tokipaka bandeko na biso, mpe tósalisanaka. Ebongi tóbondelaka mpo na molongani na biso, libota na biso, bana na biso, mpe baninga na biso. Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bóbondelelanaka.”​—Yakobo 5:16.

Pesáká Nzambe matɔndi. Biblia elobi boye mpo na Nzambe oyo asalá biso: “Asaleli bino bolamu, ndenge apesaka bino bambula uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, ndenge atondisaka mitema na bino mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.” (Misala 14:17) Ntango tokanisaka nyonso oyo Nzambe asaleli biso, etindaka biso tóbondela ye mpo na kopesa ye matɔndi. Na ntembe te, tokomonisa mpe ete tozali kopesa Nzambe matondi soki tozali kotosa ye.​—Bakolose 3:15.

 ZALÁKÁ NA MOTEMA MOLAI MPE KOTIKA KOBONDELA TE

Ntango mosusu, tolɛmbaka nzoto mpo Yehova apesi biso eyano mbala moko te na mabondeli oyo tosali na motema mobimba. Tosengeli nde koloba ete Nzambe azali kolinga biso lisusu te? Ezali bongo te! Tótala makambo oyo bato balobi oyo emonisi ete tosengeli kotika kobondela te.

Steve, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo alobi boye: “Soki mabondeli te, nalingaki kozala lisusu na esengo te.” Nini esalisaki ye akoba kobondela? Abandaki koyekola Biblia mpe ayaki koyeba ete esengeli kobondelaka mpe kotingama na mabondeli. Steve alobi lisusu boye: “Nabondelaki Nzambe mpo na kopesa ye matɔndi ndenge baninga na ngai basalisaki ngai na bolingo mpenza. Sikoyo nazali na esengo mingi koleka.”

Bongo Jenny, oyo abandaki kokanisa ete Nzambe akoki koyoka ye te? Alobi boye: “Ntango nazalaki komona ete nazali na ntina moko te, nazalaki kosɛnga Nzambe asalisa ngai nayeba mpo na nini nazali koyoka ete nazangi ntina.” Na ndenge nini yango esalisaki ye? Alobi: “Kobondela Nzambe esalisaki ngai namitalela ndenge ye atalelaka ngai, namona ete ata soki motema na ngai ezali koyebisa ete nazangi ntina, Nzambe azali komona ete nazali na ntina. Esalisaki ngai mpe natika te.” Bolamu nini azwaki? Abakisi boye: “Libondeli esalisaki ngai namona ete Yehova azali moto ya solo, Nzambe ya bolingo, oyo atyelaka ngai likebi, azali Tata mpe Moninga, oyo azali kosalisa ngai mpe akokoba kosalisa ngai ntango nyonso oyo nakosala makasi nasala oyo ye alingi.”

Isabel alobi boye ntango amonaka mwana na ye, Gerard, na bomoi atako azali na mbeba: “Namonaka ete yango ezali mpenza eyano ya malamu na mabondeli na ngai.”

Tólobela mpe makambo oyo ekómelaki Isabel. Ntango azwaki zemi, monganga na ye ayebisaki ye ete mwana wana akobotama na mbeba ya monene mpenza. Isabel asilaki mayele. Kutu, bato mosusu bayebisaki ye alongola zemi yango. Alobi boye: “Nayokaki mpasi na motema lokola nde nakufa.” Asalaki nini? Alobi: “Nabondelaki Nzambe mbala na mbala mpo asalisa ngai.” Na nsima, abotaki mwana mobali, apesaki ye nkombo Gerard, mpe azalaki na mbeba. Isabel amonaka ete Nzambe ayanolaki na mabondeli na ye? Ezali bongo! Na ndenge nini? Isabel alobi boye: “Ntango namonaka mwana na ngai, oyo azali na mbula 14 sikoyo, na bomoi, atako azali na mbeba, namonaka ete yango ezali mpenza eyano ya malamu na mabondeli na ngai, lipamboli ya monene mpenza oyo Yehova apesá ngai.”

Maloba ya sembo wana ezali kotinda biso tókanisa maloba ya moko ya bakomi ya nzembo ete: “Ee Yehova, okoyoka mpenza mposa ya bato ya komikitisa. Okobongisa motema na bango. Litoi na yo ekotya likebi.” (Nzembo 10:17) Ezali mpo na bantina yango nde tosengeli kokoba kobondela Nzambe!

Na Biblia, tokokuta ebele ya mabondeli ya Yesu. Na ntembe te, libondeli oyo eyebani mingi ezali oyo ateyaki bayekoli na ye. Liteya nini tokoki kozwa na libondeli yango?