Nzambe apambolaka bato oyo basalisaka basusu
Na mokili, bato mingi bazangi bilei mpe bisika ya kofanda. Basusu bazangi elikya. Soki tozali kosalisa bato ya ndenge wana, Nzambe akopambola biso.
OYO MAKOMAMI MOSANTU ELOBI
“Ye oyo amoniselaka moto oyo azangá boboto azali kodefisa Yehova, mpe Ye akozongisela ye ndenge na ye wana ya kosala.”—MASESE 19:17.
KOSALISA MOTO ELIMBOLI NINI?
Yesu abɛtaki lisolo ya moto moko oyo miyibi babɛtaki ye pene báboma ye. (Luka 10:29-37) Mopaya moko oyo alekaki na nzela wana, amonaki moto yango, apusanaki mpe akangaki bampota na ye. Asalisaki moto yango atako bazalaki ekólo moko te.
Mopaya yango amonisaki boboto na ndenge amemaki moto yango epai ya monganga, afutaki mbongo, alendisaki moto yango mpe abɔndisaki ye.
Lisolo yango eteyi biso nini? Yesu alingaki komonisa biso ete tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa bato oyo bazali na mpasi. (Masese 3:27) Makomami Mosantu elobi ete mosika te Nzambe akosukisa bobola mpe mpasi. Kasi tokoki komituna: Ndenge nini Nzambe akosala yango mpe akosala yango ntango nini? Lisolo oyo elandi ekolobela mapamboli oyo Nzambe abombeli yo.