Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 27

“Tyelá Yehova elikya”

“Tyelá Yehova elikya”

“Tyelá Yehova elikya; zalá na mpiko mpe motema na yo ezala makasi.”​—NZ. 27:14.

LOYEMBO 128 Tóyika mpiko tii na nsuka

NA MOKUSE a

1. (a) Elikya nini Yehova apesá biso? (b) ‘Kotyela Yehova elikya’ elimboli nini? (Talá “Ndimbola ya maloba.”)

 YEHOVA apesá bato nyonso oyo balingaka ye elikya moko kitoko. Mosika te, akosilisa maladi, mawa, mpe liwa. (Em. 21:3, 4) Akosalisa “bato ya komikitisa” oyo bazali kotyela ye elikya bákómisa mabele oyo paradiso. (Nz. 37:9-11) Lisusu, akosala ete ezala pɛtɛɛ mpo na mokomoko na biso azala na boyokani ya malamu elongo na ye, ekozala boyokani oyo eleki malamu boyokani oyo tozali na yango elongo na ye sikoyo. Oyo nde elikya moko kitoko mpenza! Nini etindaka biso tóndima ete bilaka ya Nzambe ekokokisama mpenza? Yehova akokisaka ntango nyonso makambo oyo alobi akosala. Yango wana, tozali na ntina mpenza ya ‘kotyela Yehova elikya.’ b (Nz. 27:14) Tomonisaka ete totyelaka ye elikya ntango tozelaka na mposa makasi mpe na esengo mokolo oyo Nzambe na biso akokokisa mokano na ye.​—Yis. 55:10, 11.

2. Likambo nini Yehova asili kosala?

2 Yehova amonisi ete akokisaka ntango nyonso bilaka na ye. Tótalela ndakisa moko mpamba. Na mokanda ya Emoniseli, Yehova alakaki ete na mikolo na biso, akoyanganisa bato ya bikólo nyonso, minɔkɔ nyonso, mpe akosala ete bango nyonso básambela ye na bomoko. Lelo oyo, etuluku wana ya bato eyebani lokola “ebele mpenza ya bato.” (Em. 7:9, 10) Atako etuluku yango esalemi na basi, mibali mpe bana oyo bauti na mokili mobimba, bazali bato ya libota kaka moko oyo bazali na bomoko. (Nz. 133:1; Yoa. 10:16) Ebele mpenza ya bato yango bazali mpe basakoli ya molende mpenza. Basepelaka mpe koyebisa moto nyonso oyo akoyoka bango elikya oyo bazali na yango ya mokili moko ya kitoko. (Mat. 28:19, 20; Em. 14:6, 7; 22:17) Soki ozali na kati ya ebele mpenza ya bato yango, na ntembe te elikya ya makambo kitoko oyo ekoya ezali na motuya monene mpo na yo.

3. Mokano nini Satana azali na yango?

3 Zabolo alingi kobebisa elikya oyo ozali na yango. Azali na mokano ya kondimisa yo ete Yehova atyelaka yo likebi te, mpe ete akokokisa bilaka na ye te. Soki Satana alongi kobebisa elikya na biso, tokoyika lisusu mpiko te, mpe tokoki ata kotika kosalela Yehova. Ndenge tokomona yango, Zabolo alingaki kobebisa elikya oyo Yobo azalaki na yango mpe kotinda ye atika kosalela Yehova.

4. Tokolobela nini na lisolo oyo? (Yobo 1:9-12)

4 Na lisolo oyo, tokolobela mayele oyo Satana asalelaki mpo na kotinda Yobo abebisa bosembo na ye. (Tángá Yobo 1:9-12.) Tokolobela mpe mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Yobo mpe ntina oyo tosengeli kobosana te ete Nzambe alingaka biso mpe akokokisa bilaka na ye.

SATANA AMEKAKI KOTINDA YOBO ABUNGISA ELIKYA

5-6. Nini ekómelaki Yobo na mwa ntango moke mpenza?

5 Yobo azalaki na bomoi moko malamu. Azalaki na boninga ya penepene na Yehova. Azalaki na libota moko monene oyo ezalaki na bomoko, mpe azalaki mozwi mpenza. (Yobo 1:1-5) Kasi kaka na mokolo moko mpamba, Yobo abungisaki biloko na ye nyonso. Ya liboso, abungisaki bozwi na ye. (Yobo 1:13-17) Na nsima, bana na ye nyonso oyo azalaki kolinga mingi bakufaki. Kanisá naino mpasi oyo Yobo ayokaki na ntango wana ya mpasi. Baboti babulunganaka ntango mwana na bango moko akufi. Sikoyo kanisá mpasi, mawa makasi oyo Yobo ná mwasi na ye bayokaki ntango bayebisaki bango ete bana na bango nyonso zomi bakufaki. Ezali likambo ya kokamwa te soki Yobo apasolaki bilamba na ye mpo na kolela bana na ye mpe akweaki na mabele!​—Yobo 1:18-20.

6 Na nsima, Satana apesaki Yobo mpasi makasi mpe abwakelaki ye maladi mabe na nzoto. (Yobo 2:6-8; 7:5) Liboso, bato mingi bazalaki komemya Yobo. Bazalaki koya kozwa toli epai na ye. (Yobo 31:18) Kasi, na nsima, bazalaki koya lisusu te. Bandeko na ye, baninga na ye ya motema, ezala mpe basaleli na ye moko basundolaki ye!​—Yobo 19:13, 14, 16.

Lelo oyo, Batatoli ya Yehova mingi bakoki koyeba ndenge Yobo azalaki komiyoka ntango azalaki komekama (Talá paragrafe 7) d

7. (a) Nini etindaki Yobo andima mpasi oyo ekómelaki ye, kasi aboyaki kosala nini? (b) Ndenge nini komekama oyo mokristo azali kokutana na yango ekoki kokokana na oyo ezali komonana na elilingi?

7 Satana alingaki ete Yobo andima ete azalaki konyokwama mpo Yehova aboyaki ye. Na ndakisa, Satana asalelaki nguya ya mopɛpɛ mpo na kokweisa ndako epai bana nyonso zomi ya Yobo bazalaki kolya elongo. (Yobo 1:18, 19) Asalaki mpe ete mɔtɔ eutá na likoló mpe ezikisa kaka te bibwele ya Yobo kasi mpe basali oyo bazalaki kobatela yango. (Yobo 1:16) Lokola mopɛpɛ mpe mɔtɔ eutaki na likoló, Yobo akanisaki ete eutaki epai ya Yehova. Yango wana, Yobo akanisaki ete apesaki Yehova nkanda na lolenge moko to mosusu. Atako bongo, Yobo aboyaki kolakela Tata na ye ya likoló mabe. Yobo azalaki kondima ete na boumeli ya bambula azwaki biloko mingi ya malamu epai ya Yehova. Na yango, akanisaki ete soki asepelaki kozwa biloko ya kitoko, asengelaki mpe kondima mabe ekómela ye. Yango wana alobaki boye: “Nkombo ya Yehova ekoba kokumisama.” (Yobo 1:20, 21; 2:10) Atako Yobo abungisaki bozwi na ye, bana na ye na liwa mpe azalaki nzoto kolɔngɔnɔ te, atikalaki sembo epai ya Yehova. Kasi Satana akobaki koluka kosala likambo mosusu.

8. Mayele nini mosusu Satana asalelaki mpo na komeka Yobo?

8 Satana asalelaki bato misato oyo bazalaki koloba ete bazalaki baninga ya Yobo mpo na kotinda Yobo akanisa ete azalaki na ntina te. Mibali yango balobaki ete mpasi oyo Yobo akutanaki na yango ezalaki mpo asalaki makambo mingi ya mabe. (Yobo 22:5-9) Balukaki mpe kondimisa ye ete ata soki azalaki moto mabe te, milende nyonso oyo asalaki mpo na kosepelisa Nzambe ezalaki na ntina moko te. (Yobo 4:18; 22:2, 3; 25:4) Kutu, bazalaki koluka komonisa Yobo ete Nzambe azalaki kolinga ye te, akokokisa te bamposa na ye, mpe ete kosalela ye ezalaki na ntina moko te. Maloba na bango ekokaki kotinda Yobo amona ete elikya ezalaki te na likambo na ye.

9. Nini esalisaki Yobo azala na mpiko mpe na makasi?

9 Meká sikoyo kokanisa. Yobo afandi na putulu ya mɔtɔ, azali koyoka mpasi mpenza. (Yobo 2:8) Baninga na ye wana bazali kokoba koloba ete azali moto malamu te mpe makambo nyonso asilá kosala ezali na ntina moko te. Mikakatano na ye ezali lokola mabanga ya kilo, wana azali na mpasi ya kobungisa bana na ye na liwa. Na ebandeli, Yobo afandi nyɛɛ. (Yobo 2:13–3:1) Kasi soki bato yango oyo bazali koloba ete bazali baninga ya Yobo bakanisi lokola afandi nyɛɛ, yango elakisi ete akotika kosalela Yehova, wana bazali komikosa. Ata na ntango wana, Yobo azalaki na likoki ya kotombola motó na ye mpe ya kotala baninga na ye wana ya lokuta mpe alobaki na bango boye: “Kino nakokufa, nakotika bosembo na ngai te!” (Yobo 27:5) Nini esalisaki Yobo azala na mpiko mpe na makasi atako azalaki konyokwama? Ata ntango alɛmbaki mpenza nzoto, abungisaki soki moke te elikya ete nsukansuka Nzambe na ye ya bolingo akobɔndisa ye. Ayebaki ete ata soki akufi, Yehova akosekwisa ye.​—Yobo 14:13-15.

NDENGE NINI TOKOKI KOMEKOLA YOBO?

10. Lisolo ya Yobo eteyi biso nini?

10 Lisolo ya Yobo eteyi biso ete Satana akoki te kotinda biso na makasi tósundola Yehova, mpe ete Yehova ayebi makambo nyonso oyo ezali kokómela biso. Ndakisa ya Yobo ekoki mpe kosalisa biso tóyeba malamu ndenge makambo ekosuka. Tótalela mwa mateya ya sikisiki oyo tokoki kozwa epai ya Yobo.

11. Soki tokobi kotyela Yehova motema, tokoki komindimisa na likambo nini? (Yakobo 4:7)

11 Yobo amonisaki ete soki tokobi kotyela Yehova motema, tokoki koyikela komekama nyonso mpiko mpe kolonga kotɛmɛla Satana. Nini ekosalema soki tosali bongo? Biblia eyebisi biso ete Zabolo akokima biso.​—Tángá Yakobo 4:7.

12. Ndenge nini elikya ya lisekwa epesaki Yobo makasi?

12 Tosengeli kokangama na elikya ya lisekwa. Ndenge lisolo oyo eleki emonisaki yango, mbala mingi Satana asalelaka kobanga oyo tozalaka na yango mpo na liwa mpo na kotinda biso tózala lisusu te sembo epai ya Yehova. Na likambo ya Yobo, Satana alobaki ete Yobo akosala nyonso, ata mpe kotika kozala sembo epai ya Yehova, mpo na kobatela bomoi na ye. Satana alobaki solo te. Ata na ntango wana ya mpasi mpenza oyo bomoi na ye ezalaki na likama, Yobo atikalaki sembo epai ya Yehova. Lokola atyelaki Yehova motema mpe azalaki na elikya makasi, ayebaki ete nsukansuka Yehova akosalisa ye ayika mpiko. Yobo andimaki ete soki Yehova asalisi ye te ntango azali naino na bomoi, akosekwisa ye na mikolo ezali koya. Elikya ya lisekwa ezalaki likambo ya solo mpo na Yobo. Soki elikya yango ezali solo mpo na biso, ata soki esɛngi tókufa, tokobatela bosembo na biso.

13. Mpo na nini tosengeli kotya likebi na mayele oyo Satana asalelaki mpo na komeka Yobo?

13 Tosengeli kotya likebi na mayele oyo Satana asalelaki mpo na komeka Yobo, mpamba te Satana asalelaka mpe mayele ya ndenge wana mpo na komeka biso lelo oyo. Talá efundeli oyo Satana abimisaki: “Eloko nyonso oyo moto [kaka Yobo te] azali na yango akopesa mpo na molimo na ye.” (Yobo 2:4, 5) Kutu, Satana alobaki ete tolingaka mpenza Yehova Nzambe te, mpe ete akolonga biso mpe akotinda biso tópesa Yehova mokɔngɔ soki tolingi kobatela bomoi na biso. Longola yango, Satana alobaki ete Nzambe alingaka biso te, mpe ete Nzambe akomona te milende oyo tosalaka mpo na kosepelisa ye. Lokola toyebi makambo oyo Satana azali koluka kosala, tondimaka te lokuta na ye wana.

14. Komekama ekoki komonisa nini epai na biso? Pesá ndakisa.

14 Tosengeli kotalela komekama lokola libaku ya koyekola makambo etali biso moko. Komekama oyo Yobo akutanaki na yango esalisaki ye ayeba bolɛmbu na ye mosusu mpe asembola yango. Na ndakisa, ayekolaki ete asengelaki lisusu komonisa komikitisa mingi. (Yobo 42:3) Biso mpe tokoki koyekola makambo mingi etali biso moko ntango tozali kokutana na komekama. Ndeko mobali moko na nkombo Nikolay, c oyo azalaki na bolɔkɔ atako anyokwamaki mingi mpo azalaki na mikakatano makasi ya nzoto, alobi boye: “Ntango nazalaki na bolɔkɔ, yango esalisaki ngai namona bizaleli oyo nasengelaki kolona lisusu mpe kobongisa.” Ntango kaka tomoni bolɛmbu na biso, tosengeli kobongisa yango mbala moko.

15. Tosengeli koyoka nani, mpe mpo na nini?

15 Tosengeli koyoka Yehova, kasi banguna na biso te. Yobo azalaki koyoka na likebi mpenza ntango Yehova azalaki kosolola na ye. Ntango Nzambe azalaki kotinda Yobo akanisa, ezali lokola nde azalaki koloba na ye boye: ‘Ozali komona nguya ya kokela oyo nazali na yango? Nayebi malamu makambo nyonso oyo ezali kokómela yo. Okanisi ete nakoki te kosalisa yo?’ Na komikitisa nyonso, Yobo ayanolaki ye mpe amonisaki botɔndi mpenza na bolamu ya Yehova. Alobaki boye: “Nayokaki yo na nsango, kasi sikoyo liso na ngai emoni yo.” (Yobo 42:5) Emonani lokola ntango Yobo azalaki koloba maloba wana, azalaki kaka kofanda na putulu, nzoto na ye ezalaki kobimisa mafina, mpe azalaki kolela bana na ye oyo bakufaki. Atako bongo, Yehova amonisaki ete alingaka Yobo mpe andimisaki ye ete azalaki kondima ye.​—Yobo 42:7, 8.

16. Na kotalela Yisaya 49:15, 16, tosengeli komikundwela nini soki tozali kokutana na komekama?

16 Lelo oyo mpe, bato bakoki kofinga biso mpe kosalela biso makambo lokola nde tozali na ntina moko te. Bakoki koluka kobebisa lokumu na biso moko to ya ebongiseli ya Yehova mpe “kokosela [biso] makambo ya ndenge nyonso.” (Mat. 5:11) Na lisolo ya Yobo, toyekoli ete Yehova andimaka ete tokotikala sembo epai na ye ntango tomekami. Yehova alingaka biso mpe akosundola soki moke te baoyo batyelaka ye elikya. (Tángá Yisaya 49:15, 16.) Kotya likebi te na maloba nyonso ya lokuta oyo banguna ya Nzambe bazali koloba! James, ndeko mobali moko na Turquie oyo libota na ye ekutanaki na komekama makasi, alobi boye: “Toyaki komona ete koyoka makambo ya lokuta oyo bakoselaka basaleli ya Nzambe elɛmbisaki biso nzoto. Yango wana, totyaki makanisi na biso na elikya ya Bokonzi mpe tokobaki kozala na molende na mosala ya Yehova. Yango esalaki ete tóbatela esengo na biso.” Lokola Yobo, toyokaka Yehova! Tótika te maloba ya lokuta ya banguna na biso ebebisa elikya na biso.

ELIKYA NA YO EKOSUNGA YO

Yehova apambolaki Yobo mpo na bosembo na ye. Ye ná mwasi na ye bazalaki na bomoi molai mpe ya esengo (Talá paragrafe 17) e

17. Ndakisa ya basi mpe mibali ya sembo oyo Baebre mokapo 11 elobeli eteyi yo nini?

17 Yobo azali moko ya basaleli ya Yehova oyo bamonisaki mpiko mpe batikalaki ngwi ntango bakutanaki na komekama makasi. Na mokanda na ye epai ya Baebre, ntoma Paulo alobeli mingi na bango, abengi bango “lipata monene boye ya batatoli.” (Ebr. 12:1) Bango nyonso bakutanaki na komekama makasi; kasi na bomoi na bango mobimba, batikalaki sembo epai ya Yehova. (Ebr. 11:36-40) Mpiko na bango mpe milende na bango ekendaki na mai? Soki moke te! Atako na bomoi na bango bamonaki te kokokisama ya bilaka ya Nzambe, bakobaki kotyela ye elikya. Lisusu, lokola bamindimisaki ete Yehova azalaki kondima bango, bandimaki mpenza ete bakomona ndenge bilaka yango ekokokisama. (Ebr. 11:4, 5) Ndakisa na bango ekoki kokómisa makasi ekateli na biso ya kotyela Yehova elikya.

18. Ozwi ekateli ya kosala nini? (Baebre 11:6)

18 Lelo oyo, tozali kobika na mokili oyo makambo na yango ezali kobeba se kobeba. (2 Tim. 3:13) Satana azali kokoba komeka basaleli ya Nzambe. Atako mikakatano ezali kozela biso, tiká tózala na ekateli ya kosala mingi na mosala ya Yehova, mpe tóndima ete “totye elikya na biso epai ya Nzambe moko ya bomoi.” (1 Tim. 4:10) Kobosana te, mbano oyo Nzambe apesaki Yobo emonisi “ete Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.” (Yak. 5:11) Biso mpe tokoki kotikala sembo epai ya Yehova, mpe komindimisa ete akopesa mbano na “baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.”​—Tángá Baebre 11:6.

LOYEMBO 150 Bóluka Nzambe mpo bóbika

a Ntango tokanisaka ndakisa ya moto oyo ayikaki mpiko na komekama makasi oyo akutanaki na yango, tokanisaka ndakisa ya Yobo. Ndakisa ya moto yango ya sembo ekoki koteya biso nini? Toyebi ete Satana akoki te kotinda biso na makasi tótika kosalela Yehova. Toyebi mpe ete Yehova ayebaka makambo nyonso oyo ekómelaka biso. Lisusu, kaka ndenge asalisaki Yobo ayikela komekama mpiko tii na nsuka, mokolo mosusu akosilisa bampasi na biso nyonso. Soki tomonisi na misala ete tozali kondima mpenza makambo yango, tokozala kati ya bato oyo ‘batyelaka mpenza Yehova elikya.’

b NDIMBOLA YA MALOBA: Maloba ya Ebre oyo ebongolami na “kotya elikya” elimboli mpenzampenza “kozela” likambo moko na mposa makasi mpenza. Ekoki mpe kopesa likanisi ya kotyela moto motema to kotyela ye elikya.​—Nz. 25:2, 3; 62:5.

c Topesi bango bankombo mosusu.

d ELILINGI: Yobo ná mwasi na ye bazali na mawa makasi ndenge bana na bango bakufi.

e ELILINGI: Yobo ayikaki mpiko tii na nsuka ya komekama na ye. Ye ná mwasi na ye bazali kokanisa mapamboli oyo Yehova apesi bango mpe libota na bango.