Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nkombo malamu to lokumu ya moto esalaka ete basusu bátyela ye motema mpe bámemya ye

‘Nkombo malamu eleki ebele ya bomɛngo’

‘Nkombo malamu eleki ebele ya bomɛngo’

NKOMBO malamu to lokumu ya moto ezalaka na ntina mingi, yango wana na bikólo mosusu batyá mibeko mpo na kobatela lokumu ya moto. Na ndakisa, mobeko oyo epekisi koloba makambo oyo ekobebisa lokumu ya moto mpe kokosela moto likambo, ezala na televizyo, na radio, to na mikanda. Yango ekundweli biso lisese moko ya kala oyo elobi: “Nkombo esengeli kolingama mingi koleka ebele ya bomɛngo; kondimama ezali malamu koleka ata palata ná wolo.” (Masese 22:1) Nini tokoki kosala mpo tózala na nkombo malamu mpe mpo basusu bámemya biso? Tokoki kozwa batoli ya ntina mingi na Biblia.

Na ndakisa, talá oyo Biblia elobi na Nzembo 15. Na motuna oyo: ‘Nani akoyambama na hema ya Nzambe?’ mokomi ya nzembo ayanoli boye: ‘Ye oyo azali kosala na boyengebene mpe azali koloba solo na motema na ye. Akoselaka bato makambo te, asalelaka moninga na ye eloko moko ya mabe te, mpe abebiselaka moninga na ye ya motema lokumu te. Na miso na ye, moto ya mpambampamba aboyami mpenza. Ata soki alapi ndai mpo na likambo oyo ekoki kobimisela ye mikakatano, abongolaka maloba na ye te. Mpe azwaka kanyaka te.’ (Nzembo 15:1-5) Soki moto azali na bizaleli ya ndenge wana, okopesa ye limemya; boye te?

Ezaleli mosusu oyo esalaka ete bato bápesa moto limemya ezali komikitisa. Masese 15:33 elobi: “Komikitisa ezalaka liboso ya nkembo.” Simbá likambo oyo: Moto ya komikitisa ayebaka makambo oyo asengeli kobongisa na bomoto na ye mpe asalaka makasi mpo na kobongisa yango. Lisusu, asɛngaka bolimbisi soki asalaki likambo oyo epesi moto mosusu mpasi. (Yakobo 3:2) Moto ya lolendo azalaka bongo te, alukaka kaka komilongisa. Masese 16:18 elobi: “Lolendo ezalaka liboso ya kokwea, mpe elimo ya komikumisa liboso ya kobɛta libaku.”

Kasi okosala nini soki moto moko abebisi lokumu na yo to akoseli yo makambo? Okoluka kozongisa mbala moko, ntango mosusu na nse ya nkanda? Omituna boye: ‘Soki naluki komilongisa, yango ekosala te ete likambo wana ya lokuta eyebana na bato mingi?’ Atako ntango mosusu ekoki kosɛnga komema likambo na Leta, Biblia epesi toli oyo ya bwanya: “Kobima nokinoki te mpo na kofunda likambo.” Kasi, “sambá likambo na yo na moninga na yo.” (Masese 25:8, 9) * Kosala makambo ndenge wana ekosalisa mpe yo obebisa mbongo te na Leta.

Biblia ezali kaka te buku moko ya makambo ya lingomba. Ezali buku oyo tokoki kotyela motema mpo etambwisa biso na makambo ya bomoi. Bato nyonso oyo basalelaka bwanya oyo ezali na Biblia bakómaka na bizaleli oyo esalaka ete bato bámemya bango mingi mpe bápesa bango lokumu.

^ par. 5 Batoli mosusu oyo Biblia epesi mpo na ndenge ya kosilisa matata ezali na Matai 5:23, 24; 18:15-17.