Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makanisi

Makanisi

Biblia ekebisi biso na makanisi mabe mpe elendisi biso tózala nde na makanisi oyo ekomemela biso bolamu.

NKANDA

TOLI YA BIBLIA: “Ye oyo ayokaka nkanda noki te azali malamu koleka moto ya nguya.”​—Masese 16:32.

YANGO ELIMBOLI NINI? Tozwaka bolamu ntango tokómi na likoki ya kopekisa nkanda na biso. Ntango mosusu moto akoki kokóma na nkanda mpo na ntina ya malamu, kasi soki apekisi nkanda yango te, akoki kosala mabe. Bato ya mayele balobi ete ntango moto azali na nkanda akanisaka malamu te mpe mbala mingi alobaka to asalaka makambo oyo ekosala ye mpasi na nsima.

OYO OKOKI KOSALA: Zalá na momeseno ya kopekisa nkanda mpo osala mabe te. Bato mosusu bakanisaka ete bato oyo basilikaka bazalaka makasi, nzokande kosilika ezali nde bolɛmbu. Biblia elobi: “Moto oyo azali kopekisa elimo na ye te azali lokola engumba oyo babuki, oyo ezangi efelo.” (Masese 25:28) Mpo na kopekisa nkanda, esengeli koluka koyeba ndenge makambo ezali, liboso ya koloba to kosala likambo moko. Biblia elobi: “Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye.” (Masese 19:11) Tokokóma na mayele ya kopekisa nkanda soki totaleli makambo nyonso.

BOTƆNDI

TOLI YA BIBLIA: “Bózala na botɔndi.”​—Bakolose 3:15.

YANGO ELIMBOLI NINI? Bato balobaka ete kaka bato oyo bazalaka na botɔndi nde bazalaka na esengo. Kutu, bato mosusu oyo babungisá moto na liwa to babungisá biloko na bango ya motuya bandimaka likambo yango. Bato yango balobi ete eloko oyo esalisaki bango bálonga mpasi wana ezali kozala na botɔndi na oyo bazali na yango, kasi te kotya makanisi na oyo babungisi.

OYO OKOKI KOSALA: Mokolo na mokolo, kanisá mpe komá makambo oyo ekotinda yo omonisa botɔndi. Esengeli kaka te ezala makambo ya minene. Monisá botɔndi ata na makambo ya mike, na ndakisa kobima ya moi, lisolo moko kitoko na moto oyo olingaka, to bomoi oyo ozali na yango mokolo na mokolo. Soki ozali na botɔndi mpo na makambo wana ya malamu mpe ozali kokanisa yango, ekopesa yo esengo.

Ekozala malamu kokanisa ntina oyo ozali na botɔndi mpo na libota mpe baninga. Soki omoni eloko ya malamu oyo olingaka epai ya moto, yebisá ye to komelá ye mokanda to mpe tindelá ye mesaje na telefone to na Internet. Yango ekosala ete boninga na bino ekóma makasi mpe okozala na esengo mpo osaleli bato mosusu likambo moko ya malamu.​—Misala 20:35.

BATOLI MOSUSU YA BIBLIA

Okoki kozwa Biblia ya koyoka na matoi na site Internet jw.org. Ezali na minɔkɔ soki 40

BOYÁ MATATA.

“Ebandeli ya kowelana ezali lokola ntango moto azali kofungola mai; na bongo liboso koswana ebima, bendá nzoto.”​—MASESE 17:14.

KOMITUNGISA TE KOLEKA NDELO MPO NA AVENIR.

“Bongo bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko. Mokolo na mokolo ezali na mitungisi na yango.”​—MATAI 6:34.

KANISÁ LIBOSO YA KOSALA LIKAMBO.

“Likoki ya kokanisa ekokɛngɛla yo, bososoli ekobatela yo.”​—MASESE 2:11.