Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bomoi na paladiso ya sika

Bomoi na paladiso ya sika

YESU azalaki koloba na kondima nyonso ete bakufi bakozonga lisusu na bomoi, mpe ayebisaki bayekoli na ye ete likambo yango ekosalema mpenza. Alobaki boye: “Na bozalisi lisusu, . . . [bokozwa] libula ya bomoi ya seko.” Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki “na bozalisi lisusu”?​—Matai 19:25-29.

Na esika oyo elobeli mpe likambo yango na Evanzile ya Luka, Biblia elobi ete Yesu alobaki ete “na ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ezali koya,” bayekoli na ye bakozwa “bomoi ya seko.” (Luka 18:28-30) Mpo na nini Biblia elobi ete “ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ezali koya” ezali kaka ndenge moko na “bozalisi lisusu”?

Na ntembe te, ezali mpo na komonisa ete Yehova Nzambe akosala nyonso mpo na kokokisa mokano oyo azalaki na yango na ebandeli ete bato bázala na bomoi libela na libela na paladiso awa na mabelé. Bato bakokóma bato ya kokoka ndenge Adama ná Eva bazalaki liboso ya kosala lisumu. Na yango, “na ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ezali koya,” makambo kitoko oyo ezalaki na elanga ya Edene ‘ekozalisama lisusu.’

Ndenge mabelé ekokóma lisusu paladiso

Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, ateyaki bayekoli na ye ete bábondelaka mpo na guvɛrnema oyo Nzambe akosalela mpo na kokómisa mabelé mobimba paladiso. Yesu alobaki tóbondelaka ete: “Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” (Matai 6:10) Nzambe aponaki Mwana na ye azali Mokambi ya Bokonzi yango oyo ekokokisa mokano oyo azalaki na yango ya kokómisa mabelé mobimba paladiso.

Mpo na Mokonzi oyo Nzambe atye, Biblia elobi boye: “Mwana abotameli biso, mwana mobali apesameli biso; bokonzi ekozala likoló ya lipeka na ye, nkombo na ye akobengama . . . Nkolo ya kimya. Kofuluka ya bokonzi na ye mpe ya kimya ekosuka te.” (Yisaya 9:6, 7) Ndenge nini guvɛrnema oyo ekoyangelama na mokonzi ya ndenge wana ekokokisa mokano ya Nzambe?

Biblia eyanoli boye: “Na mikolo ya mikonzi yango Nzambe ya lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soki moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.”​—Danyele 2:44.

Tótala sikoyo makambo oyo ekozala na mabelé, ntango ekokóma paladiso, elingi koloba, “na bozalisi lisusu,” ntango Mwana ya Nzambe akoyangela na Bokonzi ya Tata na ye.

Ndenge bomoi ekozala na paladiso

Bakufi bakosekwa

“Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.”​—Yoane 5:28, 29.

“Ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.”​—Misala 24:15.

Maladi, bobange to liwa ekozala lisusu te

“Bongo miso ya bakufeli miso makofungolama, mpe matoi ya bimimi makozipolama; bongo, motɛngumi akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo ya ebubu ekoyemba na esengo.”​—Yisaya 35:5, 6.

“Nzambe ye moko akozala elongo na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.”​—Emoniseli 21:3, 4.

Bilei ekozala beboo

“Mokili ezali kobota mbuma na yango; Nzambe, ɛɛ Nzambe na biso apamboli biso.”​—Nzembo 67:6.

“Masango ekotondana na mokili ata kino likoló ya [ngomba, NW].”​—Nzembo 72:16.

Moto nyonso akozala na ndako ya kitoko mpe na mosala ya malamu

“Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakolona bilanga [ya vinyo] mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakolona te ete mosusu alya.”​—Yisaya 65:21, 22.

Bitumba mpe mobulu ekozala lisusu te

“Bato mabe bakolongolama na mokili.”​—Masese 2:22.

“Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mazala bikateli ya matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.”​—Yisaya 2:4.

Kobanga ekozala lisusu te, mpe kimya ekotonda na mokili

“Bakofanda na kimya mpe moto akobangisa bango te.”​—Ezekiele 34:28.

“Bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba na bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova] lokola mbonge ekozipaka mai-na-monana.”​—Yisaya 11:9.

Ekozala mpenza esengo kofanda na mokili ya ndenge wana, ntango moto nyonso akobanda kolinga Nzambe mpe bazalani na ye! (Matai 22:37-39) Zalá na elikya ete na ntango wana, bilaka nyonso ya Nzambe ekokokisama. Nzambe alobi boye: “Ngai nasili koloba yango . . . mpe nakokokisa yango.”​—Yisaya 46:11.

Kasi, ekoki kozala na makambo mingi oyo osengeli koyeba na ntina na Yehova Nzambe mpe mokili ya sika oyo alaki. Na ndakisa, makambo nini ezali komonisa ete mokili yango ya sika ekómi pene? Ndenge nini Bokonzi ya Nzambe ekozwa esika ya baguvɛrnema nyonso oyo ezali na mokili lelo oyo? Mpe makambo nini ekomema mbongwana yango? Batatoli ya Yehova bakozala na esengo ya kosalisa yo ozwa biyano na mituna wana. Soki olingi koyeba makambo mosusu oyo osengeli kosala mpo na kozwa lisalisi yango, talá na lokasa 32 ya zulunalo oyo.

Etikali moke mokili ya sika ya boyengebene oyo bato bazali kozela banda ebele ya bambula eya. Mpo na bato mingi oyo bakufá, liwa ezali nsuka ya makambo nyonso te. Lisekwa ya bato bakufá ezali ndɔtɔ ya mpamba te, ezali nde mokano ya Nzambe! Bato oyo bakufá bakozonga mpenza na bomoi! Yango nde “bomoi ya solosolo,” bomoi “oyo ezali koya.”​—1 Timote 4:8; 6:19.