Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 8

Liwa ya Yesu ezali na ntina nini mpo na yo?

Liwa ya Yesu ezali na ntina nini mpo na yo?

Yesu akufaki mpo biso tókoka kozala na bomoi. Yoane 3:16

Mikolo misato nsima ya liwa ya Yesu, basi mosusu bakendaki na lilita na ye mpe bakutaki yango polele. Yehova asekwisaki Yesu na kati ya bakufi.

Na nsima, Yesu amonanaki na bantoma na ye.

Ya solo, Yehova asekwisaki Yesu lokola ekelamu ya elimo mpe ya nguya oyo akoki kokufa lisusu te. Bayekoli na ye bamonaki ye ntango azalaki komata na likoló.

Nzambe asekwisaki Yesu mpe akómisaki ye Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Danyele 7:13, 14

Yesu apesaki bomoi na ye mpo na kofuta lisiko mpo na bato. (Matai 20:28) Na nzela ya lisiko yango, Nzambe apesi biso libaku ya kozwa bomoi ya seko.

Yehova atyaki Yesu Mokonzi mpo ayangela mabele. Akozala elongo na bato 144 000 ya sembo oyo basekwi awa na mabele mpo na kozala na bomoi na likoló. Yesu ná bato 144 000 basali guvɛrnema moko ya sembo na likoló​—Bokonzi ya Nzambe.​—Emoniseli 14:1-3.

Bokonzi ya Nzambe ekokómisa mabele paradiso. Bitumba, kobomana, bobola, mpe nzala ekozala lisusu te. Bato bakozala mpenza na esengo.​—Nzembo 145:16.