Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bakufi bakozonga mpenza na bomoi?

Bakufi bakozonga mpenza na bomoi?

Okoloba ete . . .

  • ɛɛ?

  • te?

  • ntango mosusu?

BIBLIA ELOBI ETE

“Lisekwa ekozala.”​—Misala 24:15, Libongoli ya Mokili ya Sika.

BOLAMU NINI OKOZWA?

Okobɔndisama ntango moto oyo olingaka akufi.​—2 Bakorinti 1:3, 4.

Okolongwa na boombo ya kobanga liwa.​—Baebre 2:15.

Okozwa elikya ya solosolo ya kozala lisusu esika moko na bato oyo olingaki oyo bakufá.​—Yoane 5:28, 29.

EBONGI MPENZA TÓNDIMA MAKAMBO OYO BIBLIA ELOBI?

Ɛɛ; mpo na ntina misato oyo:

  • Nzambe azali Mozalisi ya bomoi. Biblia ebengi Yehova Nzambe “liziba ya bomoi.” (Nzembo 36:9; Misala 17:24, 25) Ye oyo apesaki bikelamu nyonso bomoi azali mpenza na likoki ya kozongisa lisusu na bomoi moto oyo akufaki.

  • Nzambe asekwisaki bato na ntango ya kala. Biblia elobeli bato mwambe​—bilenge, mikóló, mibali mpe basi—​oyo bazongaki na bomoi awa na mabele. Bamosusu bakufaki elekaki ntango mingi te, kasi moko aumelaki na nkunda mikolo minei!​—Yoane 11:39-44.

  • Nzambe azali na mposa makasi ya kosala yango lisusu. Yehova ayinaka liwa; atalelaka yango ete ezali monguna. (1 Bakorinti 15:26) Azali na “mposa makasi” ya kolonga monguna yango, akolongola liwa na nzela ya lisekwa. Azali na mposa makasi ya kozongisa na bomoi baoyo bazali na makanisi na ye mpe komona bango lisusu na bomoi awa na mabele.​—Yobo 14:14, 15.

KANISÁ NAINO

Mpo na nini moto akómaka mokóló mpe akufaka?

Biblia epesi eyano na motuna yango na EBANDELI 3:17-19 mpe na BAROMA 5:12.