Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 11

Yehova ayokaka biso?

Yehova ayokaka biso?

Nzambe ayokaka mabondeli na biso. 1 Petro 3:12

Yehova azali “Moyoki ya libondeli.” (Nzembo 65:2) Alingaka tófungolela ye motema na biso.

Bondeláká Yehova kasi moto mosusu te.

Tokoki kobondelaka mpo na makambo mingi. 1 Yoane 5:14

Bondeláká mpo mokano ya Nzambe esalema na likoló mpe awa na mabele.

Bondeláká na nkombo ya Yesu mpo na komonisa ete ozwaka na motuya oyo asalá mpo na yo.

Sɛngáká Yehova asalisa yo osala oyo ezali malamu. Okoki mpe kobondela mpo na bilei, mosala, ndako, bilamba, mpe kolɔngɔnɔ ya nzoto.