Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 01

Biblia ekoki kosalisa yo?

Biblia ekoki kosalisa yo?

Biso nyonso tolingaka koyeba makambo mingi etali bomoi, bampasi, liwa, mpe makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Tomitungisaka mpe mpo na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Na ndakisa, tolukaka mbongo mpo na kokokisa bamposa na biso mpe tolingaka kozala na libota ya esengo. Biblia esalisi bato mingi bázwa biyano na mituna ya ntina mingi etali bomoi mpe epesi batoli oyo ebongi mpo na kozala na bomoi ya esengo. Oyebi moto moko oyo Biblia ekoki kosalisa?

1. Biblia epesi biyano na mituna nini?

Biblia epesi biyano na mituna oyo ya ntina mingi: Bomoi ebandá ndenge nini? Mpo na nini tozali awa na mabele? Mpo na nini bato malamu bamonaka mpasi? Soki moto akufi, akendaka wapi? Soki bato nyonso balingaka kimya, mpo na nini bitumba ezali? Mabele ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya? Biblia epesi biyano oyo ebongi na mituna wana, mpe bato mingi basepelaka na biyano yango.

2. Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya esengo?

Biblia epesi biso batoli ya malamu. Na ndakisa, eyebisi biso makambo oyo tosengeli kosala mpo na kozala na libota ya esengo. Eyebisi biso mpe oyo tosengeli kosala ntango tozali kotungisama mpe oyo tosengeli kosala mpo na kosepela na mosala na biso. Wana ozali koyekola buku oyo, okoyeba toli oyo Biblia epesi mpo na makambo yango mpe makambo mosusu. Mbala mosusu okondima ete “Makomami nyonso [makambo nyonso oyo ezali na kati ya Biblia] ezali . . . na litomba.”​2 Timote 3:16.

Buku oyo ezali Biblia te. Kasi, ekosalisa yo oyeba yo moko makambo oyo Biblia eteyaka. Yango wana, tozali kolendisa yo otánga bavɛrsɛ oyo ezali na liteya mokomoko mpe okokanisa yango na makambo oyo ozali koyekola.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba ndenge Biblia esalisi bato, makambo oyo okoki kosala mpo osepela kotánga yango, mpe ntina oyo moto asengeli kosalisa yo mpo oyeba mateya na yango malamumalamu.

3. Biblia ekoki kotambwisa biso

Biblia ezali lokola mwinda to torche oyo ezali kopela makasi. Biblia ekoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu mpe koyebisa biso makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya.

Tángá Nzembo 119:105, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na mokomi ya nzembo oyo, Biblia ezali nini?

  • Bongo mpo na yo?

4. Biblia ekoki kopesa biyano na mituna na biso

Biblia epesaki mwasi moko biyano na mituna ya ntina mingi oyo azalaki komituna banda bambula mingi. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Na video oyo, mituna nini mwasi yango azalaki komituna?

  • Ndenge nini boyekoli ya Biblia esalisaki ye?

Biblia elendisi biso tótunaka mituna. Tángá Matai 7:7, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mituna nini omitunaka oyo biyano na yango ekoki kozala na Biblia?

5. Okoki kosepela kotánga Biblia

Bato mingi basepelaka kotánga Biblia mpe bazwaka bolamu. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Na video yango, bilenge bazalaki kosepela kotánga mikanda?

  • Mpo na nini sikoyo bakómi kosepela kotánga Biblia?

Biblia ekoki koteya biso makambo oyo ekoki kosalisa biso mpe kopesa biso elikya. Tángá Baroma 15:4, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Okosepela kozwa lisalisi mpe koyeba elikya oyo Biblia epesi?

6. Bato mosusu bakoki kosalisa biso tóyeba Biblia malamumalamu

Bato mingi oyo batángaka Biblia bango moko balobi ete soki bato mosusu bazali kosalisa yo oyeba yango ezalaka malamu koleka. Tángá Misala 8:26-31, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

Moto ya Etiopi azalaki na mposa básalisa ye mpo ayeba Makomami malamumalamu. Bato mingi bamoni ete soki bato mosusu bazali kosalisa yo oyeba Biblia ezalaka malamu koleka

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Koyekola Biblia ezali kolekisa ntango mpamba.”

  • Okoyebisa ye nini? Mpo na nini?

NA MOKUSE

Biblia epesaka batoli ya malamu oyo etali bomoi, eyanolaka na mituna ya ntina mingi, esalisaka bato mpe epesaka bango elikya.

Bozongeli

  • Biblia ezali na batoli ya ndenge nini?

  • Biblia epesaka biyano na mituna nini?

  • Makambo nini okolinga koyekola na Biblia?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá ndenge Biblia esalisi moto moko alongola makanisi mabe oyo azalaki na yango banda bomwana.

Nabandaki bomoi ya sika! 2:53

Talá ndenge Biblia emonisi polele moto oyo azali koyangela mokili mpo na kosembola likanisi ya libunga oyo bato bazalaka na yango.

Mpo na nini koyekola Biblia?​Video ya molai  3:14