Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo


Oyo okoki kosala mpo na kozwa bolamu ya mateya oyo ya Biblia

Oyo okoki kosala mpo na kozwa bolamu ya mateya oyo ya Biblia

Sɛngá moto moko asalisa yo: Sɛngá boyekoli ya Biblia epai ya moto oyo apesi yo mwa buku oyo, to tondisá lokasa na site Internet na biso jw.org.

ETENI YA LIBOSO

Tángá paragrafe mokomoko, ná motuna oyo ezali likoló ya paragrafe (A) mpe bavɛrsɛ (B) oyo ebimisi makanisi ya ntina. Okomona bavɛrsɛ mosusu bakomi “tángá.”

ETENI YA KATIKATI

Makambo (C) oyo ezali na Kɔtá na mozindo emonisi makambo oyo bokotalela. Batitre ya mike (D) ezali komonisa makanisi ya ntina. Tángá bavɛrsɛ, pesá biyano na mituna, mpe talá bavideo (E).

Talá bililingi mpe maloba oyo ezali na nse na yango (F), mpe kanisá eyano oyo okopesa na eteni Soki moto alobi na yo (G).

ETENI YA NSUKA

Na mokuse mpe Bozongeli (H) nde esukisi liteya. Komá dati oyo bosilisi liteya. Oyo okoki kosala (I) ezali kopesa yo likoki ya kosalela makambo oyo oyekoli. Makanisi mosusu (J) Ezali na makambo mosusu oyo okoki kotánga mpe bavideo oyo okoki kotala.

Ndenge ya koluka bavɛrsɛ ya Biblia

Vɛrsɛ ebandaka na mokanda ya Biblia (A), mokapo (B), mpe vɛrsɛ to bavɛrsɛ (C). Na ndakisa, Yoane 17:3, elingi koloba mokanda ya Yoane, mokapo 17, vɛrsɛ 3.