Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Bandeko ya bolingo, basakoli ya Bokonzi,

KANISÁ ete ozali na libota ya Betele ya Brooklyn na mwamitano, mokolo ya 02/10/1914. Bofandi na bisika na bino na ntɔngɔ na ntango ya komɛla tii mpe bozali kozela ndeko Charles Russell. Na mbala moko, porte efungwami mpe ndeko Russell akɔti. Atɛlɛmi mwa moke, ndenge amesaná, mpe apesi bandeko nyonso mbote na esengo mpenza. Na nsima, na esika afanda mbala moko, abɛti mabɔkɔ mpe apesi liyebisi moko monene: “Ntango ya bato ya bikólo mosusu esuki; mikolo ya bakonzi na bango esili!” Esengo eleki yo, mpo ozelaka likambo yango banda kala! Bino nyonso na Betele boyambi nsango yango ya esengo na motema mobimba mpe bobɛti mabɔkɔ ntango molai mpenza.

Bambula mingi esili koleka banda ndeko Russell alobaki likambo wana ya esengo. Makambo nini Bokonzi ya Nzambe esali banda wana? Esali makambo ebele mpenza! Na nzela ya Bokonzi, Yehova apɛtoli basaleli na ye mpe apesi bango formasyo mokemoke. Bazalaki kaka mwa bankóto na 1914 kasi lelo bakómi bato koleka milio 7 na ndambo. Matomba nini yo moko ozwi na formasyo yango?

Mbala mingi, toyokaka bandeko balobaka ete: “Likalo ya Yehova na likoló ezali kotambola!” mpe ezali bongo. Nzokande, likambo ya solo ezali ete likalo yango, oyo ezali elilingi ya eteni ya ebongiseli ya Yehova oyo ezali na likoló, ezali kotambola na lombangu makasi banda 1914 ndenge okomona yango soki otángi mokanda oyo na likebi. Mpo nsango malamu esakolama na mokili mobimba, basakoli ya Bokonzi basaleli mayele ndenge na ndenge, na ndakisa bazulunalo ya mokili, kotambola na babalabala balati bapapye, bililingi, mokanda ya litatoli, bafono, radio, ata mpe Internet.

Lokola Yehova azali kopambola mosala na biso, tozali sikoyo kobimisa mikanda na minɔkɔ koleka 670, mpe topesaka bato mikanda yango ofele. Bandeko ebele bamipesi na bolingo na bango moko mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi, Bandako ya mayangani, mpe Babetele, na mikili ya bozwi mpe na mikili ya bobola. Mpe ntango makama ebimi, bandeko basi mpe mibali bamipesaka nokinoki mpo na kosalisa bandeko oyo bazwi likama, mpe na bongo bamonisaka ete bazali bandeko oyo ‘babotami mpo na ntango ya mpasi.’​—Mas. 17:17.

Na bantango mosusu, bakonzi ya mangomba mpe banguna mosusu bakanaka kobimisa “mpasi na nzela ya mobeko,” kasi mbala mingi, mabe oyo bakanaka esimbaka te, kutu esalaka nde mpo “nsango malamu ekende liboso”; yango ekómisaka kondima na biso makasi.​—Nz. 94:20; Flp. 1:12.

Tozali na esengo mingi ndenge biso nyonso tozali na kati ya “basali ya ndako.” Bóyeba ete tolingaka bino nyonso mingi mpenza. Mpe libondeli na biso ezali ete buku oyo esalisa bino bósepela lisusu mingi koleka na libula na bino ya elimo.​—Mat. 24:45.

Topesi bino nyonso mbote, tozali

Bandeko na bino,

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova