Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 15

Babundi mpo na kozwa bonsomi ya losambo

Babundi mpo na kozwa bonsomi ya losambo

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Ndenge oyo Kristo asalisi bayekoli na ye na etumba oyo babundi mpo Leta andima ebongiseli na bango mpe bázwa lotomo ya kotosa mibeko ya Nzambe

1, 2. (a) Nini elakisaka ete tozali bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe? (b) Mpo na nini esɛngaki ete Batatoli ya Yehova bábunda mpo na kozwa bonsomi ya losambo?

SOKI ozali Motatoli ya Yehova, boye ozali mwana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe. Bongo nini elakisaka yango? Ezali passeport te, to mokanda mosusu ya Leta. Eloko oyo elakisaka ete tozali bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe ezali ndenge na biso ya kosambela Yehova Nzambe. Losambo ya solo esuki kaka na kondima mateya ya Biblia te. Etaleli mpe makambo oyo osalaka, elingi koloba ndenge otosaka mibeko ya Bokonzi ya Nzambe. Losambo na biso esimbi makambo nyonso ya bomoi na biso, ezala ndenge ya kobɔkɔla bana to mpe ndenge ya kosalisa nzoto.

2 Kasi, na bantango mosusu, bato ya mokili oyo baboyaka ete tólanda mibeko mpe masɛngami ya Bokonzi ya Nzambe na biso. Bakonzi mosusu ya Leta baluki kotyela biso mibeko na losambo na biso to kutu kopekisa biso kosala yango. Na bantango mosusu, esɛngaki bayekoli ya Kristo bábunda mpo na kozwa bonsomi ya kotosa mibeko ya Mokonzi Masiya. Ezali likambo ya kokamwa? Te. Ata basaleli ya Nzambe na ntango ya kala babundaki mbala mingi mpo na kozwa bonsomi ya kosambela Yehova.

3. Mpo na nini basaleli ya Nzambe babundaki na mikolo ya Estere?

3 Na ndakisa, na mikolo ya Estere, oyo azalaki mwasi ya mokonzi, basaleli ya Nzambe babundaki mpo bábomama te. Mpo na nini? Hamane, moto mabe oyo azalaki ministre-mokonzi, ayebisaki Ahasueruse, mokonzi ya Perse, ete Bayuda nyonso oyo bafandi na bitúká oyo eyangelami na Perse basengeli kobomama mpo “mibeko na bango ekeseni na oyo ya bato mosusu nyonso.” (Est. 3:8, 9, 13) Yehova asundolaki basaleli na ye? Te, apambolaki milende oyo Estere ná Mordekai basalaki na ndenge bamemaki likambo yango epai ya mokonzi mpo na kobatela libota ya Nzambe.​—Est. 9:20-22.

4. Tokolobela nini na mokapo oyo?

4 Ezali boni lelo oyo? Ndenge tomonaki yango na mokapo eleki, bakonzi mosusu ya mokili oyo batɛmɛlaka Batatoli ya Yehova. Na mokapo oyo, tokolobela ndenge baguvɛrnema mosusu elukaki kotyela biso mibeko na losambo na biso. Tokolobela makambo misato: (1) lotomo ya kondimama lokola ebongiseli mobimba mpe ya kosambela na ndenge oyo toponi, (2) bonsomi ya kopona lisalisi ya monganga oyo eyokani na batoli ya Biblia, mpe (3) lotomo ya baboti ya kobɔkɔla bana na bango na kolanda mibeko ya Yehova. Na likambo mokomoko, tokomona ndenge bato ya sembo ya Bokonzi ya Masiya babundi mpo bákoba kozala bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe; tokomona mpe mapamboli oyo bazwi.

Babundi mpo na kondimama na Leta mpe kozwa bonsomi

5. Kondimama na Leta epesaka biso matomba nini?

5 Tozali mpenza na mposa ya kondimama na Leta mpo tósambela Yehova? Te, kasi, kondimama na Leta esalisaka biso tósala makambo ya losambo na biso kozanga mikakatano; na ndakisa, kosala makita na Bandako ya Bokonzi mpe na Bandako ya Mayangani na bonsomi, kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe kotinda yango na bamboka, mpe kosakola nsango malamu kozanga epekiseli. Na mikili mingi, Batatoli ya Yehova bayebani na Leta mpe bazali na bonsomi ya kosambela ndenge moko na bato ya mangomba nyonso oyo Leta andimi. Kasi, nini esalemaka soki Leta aboyi kondima biso to aluki kolongola bonsomi na biso?

6. Batatoli ya Yehova na Australie bakutanaki na mokakatano nini na ebandeli ya bambula ya 1940?

6 Australie. Na ebandeli ya bambula ya 1940, guvɛrnɛrɛ-mokambi ya Australie alobaki ete mateya na biso “ezali mabe” mpo epekisi kokende etumba. Mosala na biso epekisamaki. Batatoli bakokaki kosala makita to kosakola polele te; Betele ezalaki kosala lisusu te, mpe bakangaki Bandako ya Bokonzi. Bapekisaki ata kozala na mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia. Nsima ya kosala mwa bambula na kobombana, Batatoli ya Yehova na Australie basikolamaki. Na mokolo ya 14/06/1943, Tribinale monene ya Australie elongolaki epekiseli.

7, 8. Lobelá etumba oyo bandeko ya Russie babundi na boumeli ya bambula mpo na kozwa bonsomi ya kosambela.

7 Russie. Batatoli ya Yehova bazalaki na epekiseli na boumeli ya bambula ebele na boyangeli ya Bakoministe, kasi nsukansuka Leta andimaki bango na 1991. Na nsima, ntango bikólo ya Union soviétique epanzanaki, Leta andimaki biso na Russie mobimba na 1992. Kasi eumelaki te, banguna​—mingimingi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Russie—​basepelaki te ndenge motángo na biso ezalaki kokola nokinoki. Na 1995 tii na 1998, bafundaki Batatoli ya Yehova mbala mitano ete bazali basali-mabe. Na mbala nyonso, prokirɛrɛ azwaki biso na mabe te. Banguna yango balɛmbaki te; na 1998 bafundaki biso lisusu na tribinale. Na ebandeli, Batatoli ya Yehova balongaki, kasi banguna baboyaki kondima ekateli wana, mpe ntango bamemaki likambo yango na tribinale mosusu, Batatoli bakweaki na sanza ya mitano na 2001. Bazongelaki kosamba likambo yango na tribinale na sanza ya zomi kaka na 2001; mpe na 2004, bakonzi bazwaki ekateli ya kokanga ebongiseli ya Batatoli ya Moscou oyo endimamaki na Leta, mpe bapekisaki mosala na bango.

8 Botɛmɛli makasi ebandaki wana. (Tángá 2 Timote 3:12.) Bakómaki kotungisa Batatoli ya Yehova mpe konyokola bango. Bakangaki mikanda na biso, mpe kofutela to kotonga bandako mpo na losambo na biso ekómaki mpasi mpenza. Kanisá ndenge bandeko na biso bayokaki mpo na minyoko nyonso wana! Batatoli bamemaki likambo yango na Tribinale monene ya Mpoto mpo na ntomo ya bato na 2001, mpe na 2004, babakisaki makambo mosusu. Na 2010, tribinale yango ezwaki ekateli. Bazuzi bamonaki polele ete Russie epekisaki mosala ya Batatoli mpo bakonzi bazalaki koyina bango, mpe balobaki ete bamoni ntina te ya kolanda bikateli oyo batribinale ya mike ezwaki, mpo eloko ata moko te emonisaki ete Batatoli bazali basali-mabe. Tribinale yango ebakisaki ete epekiseli wana etyamaki mpo na kolongola lotomo oyo Batatoli bazalaki na yango na Leta. Ekateli ya tribinale yango emonisaki ete Batatoli bazali na lotomo ya kozwa bonsomi ya losambo. Atako bakonzi mingi ya Russie baboyaki kotosa ekateli ya Tribinale monene, bolongi wana epesi basaleli ya Nzambe ya Russie mpiko mingi.

Titos Manoussakis (Talá paragrafe 9)

9-11. Na Grèce, ndenge nini basaleli ya Yehova babundi mpo na kozwa bonsomi ya kosambela elongo, mpe ebimisi mbuma nini?

9 Grèce. Na 1983, ndeko Titos Manoussakis afutelaki mwa ndako moko na engumba Heraklion, na Crète, mpo etuluku moko ya Batatoli ya Yehova básalaka makita na bango wana. (Ebr. 10:24, 25) Kasi eumelaki te, sango moko ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse amilelaki epai ya bakonzi, asepelaki te ndenge Batatoli bazalaki kosalela ndako yango mpo na losambo. Mpo na nini? Kaka mpo mateya ya Batatoli ekeseni na oyo ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse! Bakonzi babandaki kosambisa ndeko Titos Manoussakis mpe Batatoli mosusu misato mpo bafundaki bango ete bazali basali-mabe. Bafutisaki bango lomande mpe bakatelaki bango sanza mibale ya bolɔkɔ. Lokola bazalaki bana-mboka ya sembo ya Bokonzi ya Nzambe, bandeko yango bamonaki ete ekateli wana ya tribinale etosaki te bonsomi na bango ya losambo, yango wana bakendaki na batribinale mosusu ya Grèce mpe nsukansuka bamemaki likambo yango na Tribinale monene ya Mpoto.

10 Nsukansuka, na 1996, tribinale yango ezwaki ekateli oyo banguna ya losambo ya pɛto bamizelaki na yango te. Elobaki ete “Batatoli ya Yehova bazali ‘lingomba oyo eyebani’ na kolanda mibeko ya Grèce” mpe ete bikateli ya batribinale ya mike etosaki te bonsomi na bango ya losambo.” Tribinale monene emonisaki mpe ete guvɛrnema ya Grèce ezalaki na lotomo te ya “kokata soki mateya nini ya lingomba ezali malamu to mpe lolenge oyo ebongi mpo na kolobela yango.” Balongolaki bitumbu oyo bapesaki Batatoli, mpe bazongelaki bonsomi na bango ya kosambela!

11 Bolongi wana esilisaki mikakatano mpo na Batatoli ya Yehova na Grèce? Ezali mawa mpo mikakatano esilaki te. Nsukansuka na 2012, bakataki likambo mosusu ya ndenge wana na engumba Kassandreia, na Grèce, nsima ya kosamba mbula pene na 12. Na mbala oyo, episkɔpɔ-mokonzi nde abimisaki botɛmɛli. Tribinale oyo eleki monene na Grèce (Conseil d’État) elongisaki basaleli ya Nzambe. Ekateli yango ezongelaki mobeko ya ekólo Grèce oyo epesi bato bonsomi ya losambo mpe emonisaki ete efundeli oyo elobi ete Batatoli ya Yehova bazali lingomba oyo eyebani te ezali lokuta. Bazuzi balobaki boye: “Mateya ya ‘Batatoli ya Yehova’ ezali libombami te, na yango bazali lingomba oyo eyebani.” Bandeko ya mwa lisangá ya Kassandreia basepelaka mpo lelo oyo basalaka makita na Ndako ya Bokonzi na bango moko.

12, 13. Na France, ndenge nini banguna ‘bakanaki kobimisa mpasi na nzela ya mobeko,’ mpe esuki ndenge nini?

12 France. Banguna mosusu ya basaleli ya Nzambe ‘bakanaka kobimisa mpasi na nzela ya mobeko.’ (Tángá Nzembo 94:20.) Na ndakisa, na katikati ya bambula ya 1990, bakonzi ya makambo ya mpako na France babandaki kolandela makambo ya mbongo ya Association Les Témoins de Jéhovah (ATJ), moko ya bibongiseli ya Batatoli ya Yehova oyo eyebani na Leta ya France. Ministre ya budget amonisaki ntina oyo bazalaki kolandela biso; alobaki ete: “Yango ekoki kosala ete Leta akanga mwa lingomba yango mpe básambisa bakonzi na yango, mpe yango ekoki kolɛmbisa misala ya ebongiseli yango to kotinda yango etika kosala na mboka na biso.” Atako bamonaki mbeba moko te na makambo ya mbongo, bakonzi ya makambo ya mpako bafutisaki ATJ mpako oyo elekaki ndelo mpenza. Soki mayele wana elongaka, bandeko balingaki kaka kokanga biro ya filiale mpe kotɛka bandako yango mpo na kofuta mpako wana. Ezalaki likambo monene, kasi basaleli ya Nzambe balɛmbisaki mabɔkɔ te. Na mpiko nyonso, batɛmɛlaki likambo wana ya kozanga bosembo, mpe nsukansuka bamemaki yango na Tribinale monene ya Mpoto na 2005.

13 Tribinale yango ezwaki ekateli na mokolo ya 30/06/2011. Elobaki ete bonsomi ya losambo esengeli kopekisa Leta kolandela mateya ya mangomba to ndenge bandimi bazali kolobela yango, lobá kaka soki ndenge mosusu ya kosala ezali te. Ebakisaki ete: “Mpako oyo etyamaki . . . ezalaki na mokano ya kosilisa mbongo nyonso ya ebongiseli [ya Batatoli], mpe na ndenge yango kopekisa bandimi na yango kosala makambo oyo etali losambo na bango na ndenge esengeli.” Bazuzi nyonso balongisaki Batatoli ya Yehova! Basaleli ya Yehova na France basepelaki mingi ntango nsukansuka guvɛrnema ezongisaki, na matabisi likoló, mbongo ya mpako oyo etyelaki ATJ, mpe na kolanda mitindo ya Tribinale monene, ezongiselaki Batatoli lotomo ya kozala nkolo lopango ya filiale.

Okoki kobondela Yehova mbala na mbala mpo na bandeko na biso oyo bazali konyokwama mpo na bikateli ya kozanga bosembo oyo batribinale ezwá

14. Ndenge nini okoki kosalisa na etumba ya kozwa bonsomi ya losambo?

14 Ndenge moko na Estere mpe Mordekai, basaleli ya Nzambe lelo babundi mpo na kozwa bonsomi ya kosambela Yehova na ndenge oyo asɛngi. (Est. 4:13-16) Ndenge nini okoki kosalisa? Okoki kobondela Yehova mbala na mbala mpo na bandeko na biso oyo bazali konyokwama mpo na bikateli ya kozanga bosembo oyo batribinale ezwá. Mabondeli ya ndenge wana ekoki kosalisa mpenza bandeko na biso oyo bazali na mpasi mpe minyoko. (Tángá Yakobo 5:16.) Yehova ayokaka mabondeli yango? Bolongi na biso na batribinale emonisi ete ayokaka mpenza!​—Ebr. 13:18, 19.

Bonsomi ya kopona lisalisi ya monganga na boyokani na mateya ya Biblia

15. Basaleli ya Nzambe batalelaka nini na oyo etali kosalela makila?

15 Ndenge tomonaki yango na Mokapo 11, bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe balandaka etinda ya polele ya Biblia oyo epekisi kozongisa makila, likambo oyo epalangani mingi lelo. (Eba. 9:5, 6; Lev. 17:11; tángá Misala 15:28, 29.) Ya solo, tondimaka te ete bázongisa biso makila, kasi tosepelaka kozwa lisalisi ya monganga oyo eleki malamu mpo na biso moko mpe bandeko na biso, soki lisalisi yango ebuki mibeko ya Nzambe te. Batribinale minene ya bikólo mingi endimi lotomo ya moto ya kopona to koboya lisalisi moko ya monganga soki lisosoli na ye to mateya ya lingomba na ye epekisi ye andima yango. Kasi, na bikólo mosusu, basaleli ya Nzambe bakutani na mikakatano makasi na likambo yango. Talá mwa bandakisa.

16, 17. Likambo nini ya mabe basalaki ndeko mwasi moko na Japon, mpe ndenge nini Yehova ayanolaki mabondeli na ye?

16 Japon. Esɛngaki básala ndeko mwasi moko ya mbula 63 na nkombo Misae Takeda lipaso moko monene. Lokola azalaki mwana-mboka ya sembo ya Bokonzi ya Nzambe, ndeko yango amonisaki monganga polele ete bázongisa ye makila te. Atako bongo, basanza mingi na nsima, ayokaki mabe mpenza ntango ayebaki ete bazongisaki ye makila ntango basalaki ye lipaso. Lokola ndeko Takeda abulunganaki mpe alɛmbaki nzoto, afundaki minganga mpe lopitalo yango na tribinale na sanza ya motoba 1993. Ndeko mwasi yango ya boboto mpe ya komikitisa azalaki na kondima makasi. Apesaki litatoli na mpiko liboso ya bazuzi, atɛlɛmaki ngonga mobimba mpo na kolimbola mateya oyo andimaka atako nzoto na ye ezalaki makasi te. Asambaki mpo na mbala ya nsuka sanza moko liboso akufa. Mpiko mpe kondima na ye esimbi mpenza motema na biso, boye te? Ndeko Takeda alobaki ete asɛngaki Yehova mbala na mbala asunga ye na etumba wana. Azalaki na elikya ete Yehova akoyoka mabondeli na ye. Esalemaki mpe bongo?

17 Mbula misato nsima ya liwa ya ndeko Takeda, Tribinale monene ya Japon elongisaki ye; endimaki ete ezalaki mabe ndenge bazongisaki ye makila, nzokande ye moko aboyaki. Ekateli oyo ezwamaki na mokolo ya 29/02/2000 elobaki ete na makambo ya ndenge wana, “esengeli kotosa lotomo ya moto ya kozwa bikateli oyo alingi.” Lokola ndeko Takeda abundaki mpo na kozwa bonsomi ya kopona lisalisi ya monganga oyo eyokani na lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia, lelo oyo, Batatoli ya Japon bazwaka lisalisi ya monganga kozanga kobanga ete bakoki kozongisa bango makila na makasi.

Pablo Albarracini (Talá paragrafe 18-20)

18-20. (a) Ndenge nini tribinale moko na Argentine endimaki lotomo ya moto ya koboya makila na nzela ya mokanda oyo emonisi yango? (b) Na oyo etali kozongisa makila, ndenge nini tokoki komonisa ete tondimaka litambwisi ya Kristo?

18 Argentine. Ndenge nini bana-mboka ya Bokonzi bakoki komibongisa mpo monganga ayeba ndenge ya kosalisa bango na ntango oyo bazali komiyeba lisusu te mpo na maladi? Tokoki kozala na mokanda oyo ekoloba mpo na biso, ndenge esalemaki mpo na ndeko moko na nkombo Pablo Albarracini. Na sanza ya mitano na 2012, balukaki kobɔtɔla ye biloko mpe babɛtaki ye masasi. Bamemaki Pablo na lopitalo azali koyeba eloko te; na yango akokaki koyebisa te ete aboyi makila. Kasi, azalaki na mokanda oyo ezalaki na malako mpo na minganga (karte ya Pas de sang); atondisaki yango malamu mpe atyaki sinyatire na ye mbula 4 liboso. Atako bomoi na ye ezalaki na likama mpe minganga mosusu bamonaki ete mpo na kobikisa ye esengeli kozongisa ye makila, minganga oyo bazalaki kosalisa ye bamonaki malamu bátosa makambo oyo akomaki na mokanda. Kasi, tata ya Pablo, oyo azalaki Motatoli te, azwaki ndingisa ya tribinale ete akoki kokweisa makambo oyo mwana na ye akomaki.

19 Avoka oyo azalaki koloba mpo na mwasi ya Pablo amemaki mbala moko likambo yango na tribinale mosusu. Mwa bangonga na nsima, tribinale yango ekweisaki ekateli ya tribinale ya liboso mpe elobaki ete esengeli kotosa makambo oyo moto ya maladi alingi mpo na lisalisi ya monganga. Tata ya Pablo amemaki likambo yango na Tribinale monene ya Argentine. Kasi, Tribinale monene emonaki “ntina te ya kotya ntembe ete [Pablo atondisaki mokanda oyo elobaki ete aboyi bázongisa ye makila] na mayele ya kososola, na makanisi ya malamu mpe na bonsomi.” Tribinale yango elobaki boye: “Moto nyonso oyo akómi mokóló akoki koyebisa liboso makambo oyo alingi básala na nzoto [na ye], mpe akoki kondima to koboya mayele mosusu ya monganga . . . Minganga basengeli kotosa malako yango.”

Otondisá karte na yo ya Pas de sang?

20 Lelo oyo, ndeko Pablo abiká. Ye ná mwasi na ye basepelaka mingi ndenge atondisaki malamu karte na ye ya Pas de sang. Likambo wana ya moke, kasi ya ntina mingi, oyo asalaki, emonisaki ete azali kotosa litambwisi oyo Kristo azali kopesa biso na nzela ya Bokonzi ya Nzambe. Yo ná libota na yo mpe bosalá bongo?

April Cadoreth (Talá paragrafe 21-24)

21-24. (a) Ndenge nini Tribinale monene ya Canada eyaki kozwa ekateli moko mpo na bilenge na likambo etali makila? (b) Ndenge nini likambo yango ekoki kolendisa Batatoli ya Yehova oyo bazali bilenge?

21 Canada. Batribinale mingi endimi ete baboti bazali na lotomo ya koponela bana na bango lisalisi ya monganga oyo esengeli. Na bantango mosusu, bazuzi bakataki kutu ete mwana oyo akoli akoki kozwa ekateli ye moko na oyo etali kosalisa nzoto. Ezalaki mpe bongo mpo na April Cadoreth. Ntango azalaki na mbula 14, April akɔtaki lopitalo mpo abɛlaki makasi, asalaki hémmoragie interne. Mwa basanza liboso, atondisaki karte na ye ya Pas de sang mpo na komonisa ete aboyi bázongisa ye makila, ata soki alingi kokufa. Monganga na ye aboyaki kolanda makambo ya polele oyo April alingaki mpe amemaki likambo yango na tribinale mpo azwa ndingisa ya kozongisa ye makila. Batyaki ye sashɛ misato ya makila, nzokande ye alingaki te. Na nsima, April alobaki ete ezali lokola basangisaki na ye nzoto na makasi.

22 April ná baboti na ye bamemaki likambo yango na batribinale. Mbula mibale na nsima, likambo yango ekómaki na Tribinale monene ya Canada. Atako April alongaki te kokweisa mibeko ya Canada, Tribinale monene ezongiselaki ye mbongo nyonso oyo abimisaki mpo na kofunda likambo na ye, mpe ezwaki ekateli oyo elongisaki ye ná bilenge mosusu oyo balingaki kosalela bonsomi na bango ya kopona lisalisi ya monganga. Tribinale elobaki boye: “Na makambo ya kosalisa nzoto, esengeli kopesa elenge oyo azali na nse ya mbula 16 nzela ya komonisa ete ekateli oyo alingi kozwa mpo na lisalisi moko ya monganga emonisi ete azali na mayele mpe na bososoli.”

23 Likambo yango ezali na ntina mingi mpo Tribinale monene elobelaki ntomo ya bilenge na kolanda mibeko. Liboso ekateli wana ezwama, tribinale nyonso na Canada ekokaki kopesa minganga nzela ya kosalisa bana ya nse ya mbula 16 na ndenge moko boye, soki tribinale emoni ete yango nde ebongi mpo na mwana. Kasi, nsima ya ekateli wana, tribinale moko ekokaki lisusu te kopesa minganga nzela ya kosalisa mwana ya nse ya mbula 16 kozanga ete bápesa ye liboso libaku ya komonisa ete azali mayele mpe ete akoki kozwa bikateli ye moko.

“Koyeba ete nasali mwa likambo mpo na kopesa Yehova nkembo mpe komonisa ete Satana azali mpenza lokuta, epesaka ngai esengo”

24 Ebongaki mpenza kolandela likambo yango mbula misato mobimba? April alobi ete “Ɛɛ!” Lelo oyo April azali mobongisi-nzela mpe azali nzoto kolɔngɔnɔ; alobi boye: “Koyeba ete nasali mwa likambo mpo na kopesa Yehova nkembo mpe komonisa ete Satana azali mpenza lokuta, epesaka ngai esengo.” Ndakisa ya April emonisi ete bilenge bakoki komonisa mpiko mpo na kolakisa ete bazali mpenza bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe.​—Mat. 21:16.

Bonsomi ya kobɔkɔla bana na kolanda mibeko ya Yehova

25, 26. Soki libala ekufi, likambo nini ekoki kosalema?

25 Yehova apesi baboti mokumba ya kobɔkɔla bana na bango na kolanda mibeko na ye. (Mib. 6:6-8; Ef. 6:4) Mokumba yango ezali mpasi, kasi ekómaka lisusu mpasi mingi soki baboti babomi libala. Baboti mosusu bazalaka na makanisi ekeseni mpo na ndenge ya kobɔkɔla bana. Na ndakisa, moboti oyo azali Motatoli amonaka ete esengeli kobɔkɔla mwana na kolanda mitinda ya Biblia, nzokande moboti oyo azali mokristo te akoki koboya likanisi wana. Motatoli oyo abomi libala asengeli koyeba ete ata soki koboma libala ebebisaka boyokani kati na mwasi ná mobali, moboti ya mwana azali kaka moboti na ye.

26 Moboti oyo azali Motatoli te akoki komema likambo na tribinale mpo na kosɛnga ete ye nde azwa bana mpo ateya bango makambo ya losambo. Basusu balobaka ete kotika Motatoli ya Yehova abɔkɔla mwana ezali likama mpo na mwana. Na ndakisa, bakoki koloba ete tosalelaka bana fɛti ya mbotama te, ya Noele te, ya Bonane te, mpe soki mwana abɛli makasi akoki kokufa mpo tokondima te ete bázongisa ye makila. Nzokande, batribinale mingi etalelaka likambo oyo eleki malamu mpo na mwana na esika ya kotalela soki lingomba ya moboti moko ezali likama mpo na ye. Tótala mwa bandakisa.

27, 28. Ndenge nini Tribinale monene ya Ohio etalelaki efundeli oyo elobaki ete kotika Batatoli ya Yehova bábɔkɔla bana ezali likama?

27 États-Unis. Na 1992, Tribinale monene ya etúká ya Ohio etalelaki likambo ya tata moko oyo azalaki Motatoli te, oyo alobaki ete ekozala mabe soki mwana na ye alandi mateya ya Batatoli ya Yehova. Tribinale ya moke endimaki kopesa ye mwana mpo abatela ye. Jennifer Pater, mama ya mwana yango, azwaki ndingisa ya kokende kotalaka mwana, kasi bayebisaki ye ete asengeli “ata moke te koteya ye to koyebisa ye makambo ya Batatoli ya Yehova.” Na maloba mosusu, ekateli wana ya tribinale ya moke elimbolaki mpe ete ndeko Jennifer akokaki ata moke te kosolola na mwana na ye Bobby makambo ya Biblia to koteya ye bizaleli ya malamu! Kanisá ndenge amiyokaki! Ndeko Jennifer abulunganaki; kasi alobi ete ayekolaki kozala na motema molai mpe kotika Yehova asala. Alobi boye: “Yehova atikaki ngai te.” Avoka na ye, oyo asalaki na boyokani na lisangá, amemaki likambo yango na Tribinale monene ya Ohio.

28 Tribinale yango ekweisaki ekateli ya tribinale ya moke; elobaki ete “baboti bazali na lotomo ya koteya bana na bango, ata ya kolakisa bango bizaleli ya malamu mpe makambo ya losambo.” Tribinale elobaki ete soki eloko te emonisi ete mateya ya lingomba ya Batatoli ya Yehova ekozala likama mpo na mwana mpe ekobebisa makanisi na ye, tribinale ya moke ezalaki na lotomo te ya koboya moboti abatela mwana kaka mpo na lingomba na ye. Tribinale monene emonaki eloko te oyo emonisaki ete mateya ya Batatoli ekobulunganisa makanisi ya mwana to ete ekozala likama mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto na ye.

Bazuzi mingi bapesi baboti oyo bazali Batatoli lotomo ya kobɔkɔla bana

29-31. Mpo na nini babɔtɔlaki ndeko mwasi moko na Danemark mwana na ye? Tribinale monene ya Danemark ezwaki ekateli nini?

29 Danemark. Ndeko Anita Hansen akutanaki mpe na mokakatano ya ndenge wana ntango mobali na ye ya kala akendaki na tribinale mpo na kosɛnga ete azwa mwana na bango Amanda, oyo azalaki na mbula 7. Atako tribinale ya etúká epesaki ndeko Anita mwana yango na mobu 2000, tata ya Amanda akendaki na tribinale mosusu ya monene; kuna, bakweisaki ekateli ya tribinale ya etúká mpe bapesaki ye mwana. Tribinale yango emonaki ete lokola baboti bazalaki na likanisi ndenge moko te na makambo ya losambo, tata nde akoyeba kosilisa matata yango. Na yango, babɔtɔlaki ndeko Anita mwana na ye Amanda mpo azalaki Motatoli ya Yehova!

30 Na mikakatano wana, na bantango mosusu ndeko Anita azalaki komitungisa mingi, kutu azalaki koyeba te asɛnga nini na libondeli. Alobi boye: “Kasi, likanisi oyo ezali na Baroma 8:26 mpe 27 ebɔndisaki ngai mingi mpenza. Namonaki ete Yehova azalaki ntango nyonso koyeba soki nalingaki koloba nini. Liso na ye ezalaki kotala ngai mpe atikaki ngai te.”​—Tángá Nzembo 32:8; Yisaya 41:10.

31 Ndeko Anita amemaki likambo yango na Tribinale monene ya Danemark. Na ekateli oyo ezwamaki, Tribinale elobaki boye: “Mpo na kokata malamu likambo ya kobatela mwana, esengeli kotala mpenza soki nini ekosalisa mwana.” Longola yango, Tribinale elobaki mpe ete mpo na kozwa ekateli na likambo ya kobatela mwana, esengeli kotalela ndenge oyo moboti mokomoko akoki kosilisa matata, kasi te “mateya mpe makambo” ya Batatoli ya Yehova. Ndeko Anita asepelaki mingi ntango Tribinale monene emonaki ete azali moboti ya malamu mpe bazongiselaki ye Amanda.

32. Ndenge nini Tribinale Monene ya Mpoto mpo na ntomo ya bato ebateli lotomo ya baboti oyo bazali Batatoli?

32 Mikili ya Mpoto. Na mikili mosusu, likambo ya kobatela bana esukaki kaka na batribinale minene ya mboka te. Ekómaki tii na Tribinale Monene ya Mpoto mpo na ntomo ya bato. Na makambo mibale, Tribinale yango emonaki ete batribinale ya mike ekataki likambo kati na moboti oyo azali Motatoli mpe oyo azali Motatoli te na kolanda kaka lingomba ya moto. Elobaki ete kosala bongo elimboli kokanisela basusu mabe mpe ezwaki ekateli ete “kokata makambo na kotalela mingimingi kaka lingomba ya moto ebongi te.” Mama moko ya Motatoli oyo azwaki litomba na ekateli wana ya Tribinale monene ya Mpoto alobaki boye: “Ezalaki kosala ngai mpasi ndenge bazalaki koloba ete nazali kotya bana na ngai na likama, nzokande eloko oyo nazalaki koluka ezalaki kaka kopesa bango oyo nakanisi ete eleki malamu mpo na bango: kolakisa bango nzela ya bokristo.”

33. Ndenge nini moboti oyo azali Motatoli akoki kosalela likanisi oyo ezali na Bafilipi 4:5?

33 Batatoli oyo bazali kosamba mpo na kozwa lotomo ya koteya bana na bango mibeko ya Biblia basalaka makasi mpo bámonisa ezaleli ya makambo makasimakasi te. (Tángá Bafilipi 4:5.) Kaka ndenge bango moko bazali kosepela kozwa lotomo ya koteya bana na bango banzela ya Yehova, bandimaka ete moboti oyo azali Motatoli te akokisa mokumba na ye ya moboti, soki alingi kosala yango. Ndenge nini Motatoli akomonisa ete azwaka mokumba ya koteya mwana na lisɛki te?

34. Liteya nini baboti bakristo lelo oyo bakoki kozwa na ndakisa ya Bayuda ya mikolo ya Nehemia?

34 Tokoki kozwa mateya na likambo moko oyo esalemaki na mikolo ya Nehemia. Bayuda basalaki mosala makasi mpo na kobongisa mpe kotonga lisusu bifelo ya Yerusaleme. Bayebaki ete kosala bongo ekobatela bango ná mabota na bango na banguna ya bikólo ya zingazinga. Mpo na yango, Nehemia alendisaki bango ete: “Bóbundela bandeko na bino, bana na bino ya mibali mpe bana na bino ya basi, basi na bino mpe bandako na bino.” (Neh. 4:14) Mpo na Bayuda wana, kobunda ndenge wana ezalaki mpenza na ntina. Ndenge moko mpe lelo, baboti oyo bazali Batatoli ya Yehova babundaka mpo na koteya bana na bango nzela ya solo. Bayebi ete bana bakutanaka na makambo ya mabe na eteyelo mpe bisika bafandi. Makambo yango ya mabe ekoki kokɔta ata na ndako na nzela ya televizyo, ya Internet, mpe bongo na bongo. Baboti, bóbosana te ete ezali na ntina mingi bóbunda mpo bana na bino bákola na esika oyo ekosalisa bango bákende liboso na elimo.

Tyá elikya ete Yehova akosimba losambo ya solo

35, 36. Kobunda oyo Batatoli ya Yehova babundi na batribinale mpo na kozwa bonsomi ebimisi matomba nini, mpe ekateli nini ozwi?

35 Yehova apamboli mpenza milende oyo ebongiseli na ye esali na mikolo na biso mpo na kozwa lotomo ya kosambela na bonsomi. Mbala mingi ntango bazali kosamba na batribinale mpo na makambo yango, basaleli ya Nzambe bapesaka litatoli monene epai ya bazuzi mpe bato oyo bazali wana. (Rom. 1:8) Likambo mosusu ya malamu ezali ete bolongi na biso na batribinale esali mpe ete ata bonsomi ya bato mingi oyo bazali Batatoli te etosama. Kasi, lokola tozali basaleli ya Nzambe, tolukaka te kobongisa mokili oyo; tolukaka mpe komilongisa te. Longola nyonso wana, toluki kozwa bonsomi na batribinale mpo na kofandisa losambo ya solo mpe kosala ete ekende liboso.​—Tángá Bafilipi 1:7.

36 Yango wana, tózalaka ntango nyonso na botɔndi mpo na mateya oyo tokoki kozwa na kondima ya bandeko oyo babundi na batribinale mpo na kozwa bonsomi ya kosambela Yehova! Biso mpe tótikala sembo, tózala na elikya ete Yehova asimbi mosala na biso mpe akokoba kopesa biso makasi mpo tósala mokano na ye.​—Yis. 54:17.