Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lobɔkɔ ya mwasi: Balingi kokanga ndeko moko oyo azali kosakola na engumba Eindhoven, na Pays-Bas, na 1945; Lobɔkɔ ya mobali: Na mboka na bino, Leta apesá bino ndingisa ya kosakola?

ETENI 4

Makambo oyo Bokonzi elongi​—Kofandisa nsango malamu na nzela ya mibeko

Makambo oyo Bokonzi elongi​—Kofandisa nsango malamu na nzela ya mibeko

KANISÁ ete wana bozali kosakola ndako na ndako boyoki makɛlɛlɛ ya motuka ya bapolisi na mosika. Makɛlɛlɛ yango ezali se kokóma makasi. Na nsima, ntango ozali kosolola na moto moko na porte na ye, motuka ya bapolisi etɛlɛmi mpe ebendi likebi ya ndeko oyo obimaki na ye. Polisi moko akiti mpe apusani epai na bino; atuni bino ete: “Bino nde bozali kokɔta na mapango ya bato mpo na koteya makambo ya Biblia? Bato bazali komilelalela!” Na limemya nyonso, boyebisi ye ete bozali Batatoli ya Yehova. Nini ekosalema?

Etali mingimingi makambo oyo eleká na mboka na bino. Na boumeli ya bambula, makambo nini bakonzi ya Leta basali Batatoli ya Yehova na mboka na bino? Bapesá moto na moto bonsomi ya losambo? Soki ezali bongo, na ntembe te ezali mpo na mosala makasi oyo bandeko basalá eleki bambula mingi mpo na “kokɔtela nsango malamu mpe kofandisa yango na nzela ya mibeko.” (Flp. 1:7) Ata soki ofandi wapi, kondima na yo ekokóma makasi soki totaleli makambo oyo Batatoli ya Yehova balongi na batribinale. Na eteni oyo, tokolobela makambo minene oyo tolongi. Makambo nyonso oyo tolongi emonisi mpenza ete Bokonzi ezali likambo ya solo, mpo tokoki kolonga makambo mingi ndenge wana te na makasi na biso moko.

NA ETENI OYO

MOKAPO 13

Basakoli ya Bokonzi liboso ya batribinale

Bazuzi mosusu lelo oyo basalaka lokola Gamaliele, moteyi moko ya Mibeko na ntango ya kala.

MOKAPO 14

Bamonisi bosembo na bango na Bokonzi ya Nzambe

“Mabele” emɛli “ebale” ya botɛmɛli oyo eyelaki Batatoli ya Yehova mpo bakɔtaka na makambo ya politiki te.

MOKAPO 15

Babundi mpo na kozwa bonsomi ya losambo

Basaleli ya Nzambe babundi mpo na kozwa lotomo ya kotosa mibeko ya Bokonzi ya Nzambe.