Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELOMBOLAMI

Nzembo 37:4—“Yawe ázala esengo na yo”

Nzembo 37:4—“Yawe ázala esengo na yo”

 “Sepelá mingi mpenza na Yehova, mpe akokokisa mposa ya motema na yo.”​—Nzembo 37:4, Libongoli ya Mokili ya Sika.

 “Yawe ázala esengo na yo; ye akopesa yo oyo motema na yo elingi.”—Nzembo 37:4, Bible na lingala ya lelo oyo.

Ndenge Nzembo 37:4 elimbolami

 Mokomi ya nzembo alendisaki basaleli ya Nzambo báyoka esengo ya kosala boninga makasi na Nzambe. Baoyo nyonso bazali na boninga ya ndenge wana bayebaka ete Yehova a akokokisela bango bamposa na bango oyo ebongi.

 “Sepelá mingi mpenza na Yehova.” Maloba yango ekoki mpe kobongolama na “zwá esengo mingi mpenza na Yehova,” “Yawe ázala esengo na yo,” to “Omisepelisa na Yawe.” Na mokuse, tosengeli ‘kozwa esengo mingi mpenza’ na kosambela Nzambe ya solo. (Nzembo 37:4, maloba na nse ya lokasa) Mpo na nini ezali bongo?

 Baoyo basambelaka Yehova batalelaka makambo ndenge ye atalelaka yango, ndenge emonisami na Biblia. Na yango, babatelaka lisosoli ya malamu mpe bakimaka mitambo mingi na bomoi na bango. (Masese 3:5, 6) Na ndakisa, bakangaka nkanda to mpe bayokaka likunya te ntango bamoni lokola ete bato ya lokoso to oyo bazangi bosembo bazali na bomoi ya malamu. (Nzembo 37:1, 7-9) Basaleli ya Nzambe bazalaka na esengo mpo bayebi ete mosika te Nzambe akolongola kozanga bosembo nyonso mpe akopambola bato ya sembo mpo na etamboli na bango ya malamu. (Nzembo 37:34) Basepelaka mpe mpo bayebi ete bapesaka Tata na bango ya likoló esengo.—Nzembo 5:12; Masese 27:11.

 “Akokokisa mposa ya motema na yo.” Maloba yango ekoki mpe kobongolama na “akoyanola na mabondeli na yo” to “akopesa yo nyonso oyo motema na yo elingi.” Ya solo, Yehova akopesa yo mbala moko te eloko nyonso oyo osɛngi. Ndenge moko na moboti ya malamu, Yehova ayebi oyo eleki malamu mpo na bana na Ye. Lisusu, makambo oyo tozali kosɛnga, ata mpe makambo oyo tosalaka, esengeli koyokana na mibeko na ye mpe mokano na ye. (Masese 28:9; Yakobo 4:3; 1 Yoane 5:14) Soki ezali bongo, tokoki kobondela “Moyoki ya libondeli” na elikya ete akoyoka biso.—Nzembo 65:2; Matai 21:22.

Makambo oyo bazali kolobela na Nzembo 37

 Davidi, mokonzi ya Yisraele ya kala nde akomaki Nzembo 37. Akomaki yango na kolanda alfabɛ. b

 Davidi akutanaki na makambo mingi ya kozanga bosembo. Mokonzi Saulo azalaki koluka ye mpo na koboma ye. (2 Samwele 22:1) Kasi, Davidi atyelaki Nzambe na ye motema mobimba. Davidi ayebaki ete nsukansuka Yehova asɛnga bato mabe bázongisa monɔkɔ. (Nzembo 37:10, 11) Ata soki emonani lokola bazali na bomoi ya malamu, ndenge moko na “matiti ya sika ya mobesu” bakolongolama kaka.—Nzembo 37:2, 20, 35, 36.

 Nzembo 37 emonisi ete nsuka ya baoyo batosaka mibeko ya Nzambe ekeseni na nsuka ya baoyo batosaka yango te. (Nzembo 37:16, 17, 21, 22, 27, 28) Na yango, nzembo yango esalisaka biso tózala na bwanya mpe tózala lolenge ya bato oyo Nzambe andimaka.

 Talá video oyo elobeli na mokuse makambo oyo ezali na mokanda ya Nzembo.

a Yehova ezali libongoli oyo esalelamaka mingi mpo na nkombo ya Nzambe ndenge ezalaki na monɔkɔ ya Ebre. Mpo na koyeba ntina oyo Babiblia mingi esalelaka titre Mokonzi to Nkolo na esika ya nkombo ya Nzambe, talá lisolo “Yehova azali nani?

b Na lolenge yango ya kokoma, molɔngɔ to milɔngɔ ya liboso ebandaka na lɛtrɛ ya liboso ya Alfabɛ ya Ebre, molɔngɔ oyo elandi ebandaka na lɛtrɛ ya mibale, mpe bongo na bongo. Mbala mosusu yango ezalaki kosalisa bato bákanga nzembo na motó.