Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bazali “na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu”!

Kobimisama ya Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu

Bazali “na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu”!

Na mokolo ya 29/08/2023, ndeko Mark Sanderson ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi abimisaki Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu na Lingala. Bato soki 276 073 bayanganaki na Stade de Martyrs mpe na bisika ndenge na ndenge mpo na kolanda programɛ yango.

Batatoli ya Yehova oyo balobaka monɔkɔ ya Lingala bazwaki Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ na bango uta mobu 2009. a Babiblia koleka 180 000 ya Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki na monɔkɔ ya Lingala mpe Batatoli ya Yehova koleka 79 000 oyo balobaka monɔkɔ ya Lingala na mokili mobimba basalelaka yango. Kasi, mpo na nini babongisaki lisusu Biblia yango? Banani babimisaki libongoli yango? Nini ekoki kondimisa yo ete Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu ebongi mpenza kotyelama motema? Mpe makambo nini ya sika na Biblia yango oyo ebongisami lisusu ekosalisa yo mpo ‘ozala na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu’?​—2 Timote 3:16, 17.

Mpo na nini babongisaki lisusu Biblia yango?

Lokola minɔkɔ ebongwanaka nsima ya bambula, ezali na ntina bábongisaka mbala na mbala Biblia mpo bato bákanga ntina ya maloba na yango. Soki Biblia ezali kaka na maloba oyo bato basalelaka lisusu te, ekozala mpasi mpo bato bákanga ntina na yango.

Na ebandeli, Yehova Nzambe asalaki ete mokanda mokomoko ya Biblia ekomama na monɔkɔ oyo bato mingi bazalaki koloba, mpe oyo bato mingi bakokaki kokanga ntina na yango. Yango nde esalaki ete Komite ya bobongoli ya Libongoli ya Mokili ya Sika ebongisa lisusu Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ ya Anglais na sanza ya 10/2013. Maloba ya ebandeli ya libongoli yango elobi: “Mokano na biso ezalaki kaka te ya kobimisa libongoli oyo ezali sembo na makomami ya ebandeli, kasi mpe oyo ekozala polele mpe pɛtɛɛ mpo na kotánga.”

Biblia ya liboso ya Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingala ebongolamaki uta na Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ya 1984 ya Anglais, oyo ezali na mitindami. Na Biblia oyo ebongisami lisusu na Lingala bakɔtisi makambo mingi oyo ezali na Biblia ya Anglais oyo babongisaki lisusu, yango esali ete bábongisa lisusu elobeli ya Lingala na ndenge ezali kolobama lelo oyo mpo ezala mpasi te mpo na kotánga.

Longola yango, nsima ya kobimisa Biblia ya libosoliboso na monɔkɔ ya Anglais, bato bakómaki kokanga ntina ya maloba ya monɔkɔ ya Ebre, ya Aramɛyɛ, mpe ya Grɛki​—minɔkɔ ya libosoliboso oyo bakomaki na yango Biblia. Bamaniskri mosusu ya Biblia eyaki komonana nsima ya kobimisa Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ya liboso; bamaniskri yango esalisaki babongoli ya Biblia báyeba mpenza ndenge makomi ya Biblia ya liboso ezalaki kotángama.

Yango wana, maloba mosusu ya makomi yango ebongisamaki lisusu mpo eyokana na oyo bato ya mayele na makambo etali Biblia balobi ete eyokani mpenza na makomi ya ebandeli. Na ndakisa, na bamaniskri mosusu, Matai 7:13 elobi: “Bókɔta na porte ya moke, mpo porte ya monene mpe nzela oyo efungwamá ezali komema na libebi, mpe bato mingi bazali kokɔta kuna.” Na Libongoli ya Mokili ya Sika ya kala, maloba “porte ya monene” ezalaki te. Nzokande, boyekoli mozindo ya bamaniskri emonisi ete maloba “porte ya monene” ezalaki na kati ya makomi ya ebandeli ya Biblia. Yango wana, bazongisi maloba yango na libongoli oyo ebongisami lisusu. Ezali mpe na makambo mosusu ya ndenge wana oyo babongisi. Kasi, bambongwana yango ezali ya minene te, mpe ata moko te ebongolaki nsango oyo ezali na Liloba ya Nzambe.

Bolukiluki mosusu emonisaki bisika mosusu motoba epai nkombo ya Nzambe, Yehova, esengelaki kozala na makomi ya Biblia. Bavɛrsɛ yango ezali Basambisi 19:18 mpe 1 Samwele 2:25; 6:3; 10:26; 23:14, 16. Na yango, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na Anglais elobeli nkombo ya Nzambe, Yehova, mbala 7 216, na kati na yango mbala 237 na Makomi ya Grɛki ya Bokristo.

Banani babimisaka Biblia yango?

Watch Tower Bible and Tract Society, ebongiseli oyo emonisaka Batatoli ya Yehova na makambo ya mibeko nde ebimisaka Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika. Esali sikoyo bambula koleka 100, banda Batatoli ya Yehova babimisaka Babiblia na mokili mobimba. Bandeko oyo basalaka na Komite ya Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika nde babimisaki libongoli ya libosoliboso ya Anglais kobanda na bambula ya 1950 tii 1960. Mpo na koboya koluka lokumu, bandeko ya Komite yango basɛngaki ete bankombo na bango eyabana te ata nsima ya liwa na bango.​​—1 Bakorinti 10:31.

Na 2008, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova eponaki etuluku mosusu ya bandeko mpo bázala na Komite ya Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika. Komite yango ebandaki mbala moko mosala ya kobongisa lisusu makomi ya Anglais. Batalelaki bambongwana oyo esalemaki na monɔkɔ ya Anglais kobanda babimisaki libongoli ya liboso. Batalelaki mpe na likebi biyano koleka 70 000 oyo bapesaki na mituna oyo babongoli ya Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na minɔkɔ koleka 120 batunaki.

Ndenge nini babimisaki Biblia oyo ebongisami lisusu na Lingala?

Ya liboso, baponaki bakristo oyo bamipesá na Yehova mpo bázala na ekipi yango ya babongoli. Emonani ete ntango babongoli bazali kosala esika moko lokola ekipi na esika moto na moto abongola na ndenge na ye moko, babongolaka na ndenge ya malamu koleka, mpe na bokatikati. (Masese 11:14) Mbala mingi, baponaka bato oyo bamesaná kobongola mikanda ya Batatoli ya Yehova oyo elimbolaka Biblia. Na nsima, ekipi yango ezwaki formasyo na makambo etali kobongola Biblia mpe ya kosalela baprogramɛ ya ordinatɛrɛ oyo ebongisami malamu.

Babongoli basalelaki mayele ya kobongola Biblia, oyo esangisi maloba ya Biblia ná baprogramɛ ya ordinatɛrɛ. Departema ya mosala ya kobongola, oyo ezali na New York, na États-Unis, esalisaki babongoli. Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova elandelaka na likebi mpenza mosala yango na nzela ya Komite ya Bokomi. Kasi ndenge nini mosala yango esalemaki?

Ekipi ya babongoli ezwaki malako mpo na kobimisa Biblia oyo ezali (1) sikisiki mpe oyo bato oyo batángá mingi te bakokanga ntina na yango, (2) maloba na yango ezali na boyokani na bavɛrsɛ mosusu, mpe (3) ebongolami na ndenge oyo bato ya monɔkɔ yango balobaka. Ndenge nini bakokisaki mokano yango? Tótalela Biblia ya sika oyo bauti kobimisa. Ekipi ya babongoli ebandaki naino na kotalela lisusu maloba ya Lingala oyo basalelaki na Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ya kala. Programɛ ya ordinatɛrɛ oyo babongoli basalelaka mpo na kobongola oyo babengi Watchtower Translation System ebimisaki maloba ya Biblia oyo ekokani na mosusu. Emonisaki mpe maloba ya ebandeli ya monɔkɔ ya Grɛki mpe ya Ebre mpo esalisa babongoli báyeba ndenge maloba yango ebongolamaki na bisika mosusu. Yango esalisaki mpenza mpo na kotalela lisusu maloba ya Lingala oyo ezali ndenge moko na maloba mosusu. Nsima ya koyekola maloba wana, ekipi ya babongoli esalaki makasi mpo esalela elobeli ya Lingala oyo bato basalelaka mpe oyo ezali pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina ya vɛrsɛ mokomoko.

Emonani polele ete, kobongola esuki kaka te na kozwa liloba ya monɔkɔ moko mpe kobongola yango na monɔkɔ mosusu. Mosala makasi esalemaka mpo na komindimisa ete liloba ya Lingala oyo baponi ezali mpenza kobimisa likanisi oyo elobelami na vɛrsɛ mokomoko ya Biblia. Mosala makasi oyo esalemaki ezali komonana polele. Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingala ebongoli Liloba ya Nzambe na ndenge oyo ezali kaka sembo te na makomi ya kala, kasi mpe na ndenge oyo ezali polele mpe pɛtɛɛ mpo na kotánga.

Tosɛngi yo oyekola malamumalamu Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika. Okoki kotánga yango na Internet to na JW Library, to mpe okoki kosɛnga oyo ya papye na lisangá ya Batatoli ya Yehova na esika ofandi. Ntango ozali kotánga yango, zalá na kondima ete ozali mpenza kotánga Liloba ya Nzambe oyo ebongolami malamu na monɔkɔ na yo.

Makambo oyo ezali na Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu

Maloba ya ebandeli mpo na Liloba ya Nzambe: Ezali na bavɛrsɛ ya Biblia oyo epesi biyano na mituna 20 ya ntina mpo na mateya ya Biblia

Makambo oyo ezali na kati: Ezali na ebandeli ya mokanda mokomoko ya Biblia, mpe elobeli na mokuse makambo oyo ezali na kati mpo na kosalisa yo oyeba esika lisolo moko ya Biblia ezali. Yango ezwi esika ya mitó ya makambo oyo ezalaki kobima na lokasa mokomoko na libongoli ya kala

Mitindami: Sikoyo ezali kaka na bavɛrsɛ oyo ezali na ntina mingi mpo na mosala ya kosakola

Maloba na nse ya lokasa: Epesi lolenge mosusu ya kobongola, ebongoli liloba na liloba, mpe makambo mosusu ya ntina

Index ya maloba ya Biblia: Sikoyo epesi kaka maloba mpe bavɛrsɛ oyo ezali na ntina mingi na mosala ya kosakola mpe ya koteya

Ndimbola ya maloba: Epesi na mokuse ndimbola ya bankama ya maloba oyo Biblia esaleli

Apɛndisi A: Elobeli mwa makambo etali libongoli oyo ebongisami lisusu, na ndakisa elobeli oyo esalelami, maloba ya sika, mpe ndenge oyo esaleli nkombo ya Nzambe

Apɛndisi B: Ezali na bisika 15 oyo batye langi, bakarte mpe baplan

a Libongoli ya Makomami ya Grɛki ya Bokristo na Lingala ebimisamaki na mobu 2002.