Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BÓSƐNZƐLAKA!

Mangomba esengeli kopesa bitumba ya Ukraine mabɔkɔ? Biblia elobi nini?

Mangomba esengeli kopesa bitumba ya Ukraine mabɔkɔ? Biblia elobi nini?

 Talá mwa makambo oyo bakonzi ya mangomba minene balobi mpo na bitumba ya Ukraine:

  •   “Patriarche Kirill, mokonzi ya lingomba ya Orthodoxe ya Russie alobi ata eloko moko te mpo na ndenge Russie ezali kobundisa Ukraine. . . . Lingomba na ye ezali kokoba kopanza bansango ya lokuta mpo na Ukraine mpe Poutine azali kosalela bansango yango ya lokuta mpo na kondimisa bato ete ekateli na ye ya kobundisa Ukraine ezali malamu.”​—EUobserver, 07/03/2022.

  •   “Patriarche Kirill . . . amonisi mpenza ete azali kosepela ndenge Russie ezali kobundisa Ukraine mpo alobi ete bitumba yango ezali moko ya makambo oyo bazali kosala mpo na kobundisa lisumu.”​—AP News, 08/03/2022.

  •   “Mokolo ya yambo, Mokonzi ya lingomba ya Orthodoxe ya Ukraine, Métropolite Épiphane I ya Kiev, apambolaki bato na ye mpo ‘bábundisa basoda ya Russie’ . . . alobaki mpe ete koboma basoda ya Russie ezali lisumu te.”​—Jerusalem Post, 16/03/2022.

  •   “Biso [Lisangá ya mangomba ya Ukraine (UCCRO)] tozali kopesa mampinga ya basoda ya Ukraine mpe bato nyonso oyo bazali kobundela biso mabɔkɔ, tozali kopambola bango mpo bazali kobundela Ukraine mpe kobatela yango na banguna. Tozali kobondela mpo na bango.”​—Maloba ya UCCRO a, 24/02/2022.

 Okanisi nini, mangomba oyo elobaka ete elandaka ndakisa ya Yesu esengeli mpenza kolendisa bandimi na yango bákende bitumba? Biblia elobi nini?

Mangomba epesá mabɔkɔ na bitumba ndenge na ndenge

 Masolo ya kala emonisi ete atako mangomba elobaka ete elingaka kimya, mbala na mbala endimaka bato bákende bitumba, elobaka ete bitumba ezali mabe te, kutu na bantango mosusu etindaka bato bákende bitumba. Banda kala, Batatoli ya Yehova bamonisaka polele ete mangomba ekosaka bato. Tótalela mwa masolo oyo tobimisá na mikanda na biso oyo emonisi likambo yango.

Bakristo basengeli kopesa mabɔkɔ na bitumba?

 Yesu ateyaki nini? “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:39) “Bókoba kolinga banguna na bino.”​—Matai 5:44-47.

 Kanisá naino: Lingomba oyo elobaka ete etosaka mateya ya Yesu oyo etali kolinga mozalani na yo esengeli lisusu kolendisa bandimi na yango bákende koboma bato na bitumba? Mpo na kozwa eyano, tángá masolo Les vrais chrétiens et la guerre mpe “Ekoki kosalema ete moto alinga banguna na ye?

 Yesu alobaki nini? “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi mpo nakabama . . . te.” (Yoane 18:36) “Baoyo nyonso basalelaka mopanga bakokufa na mopanga.”​—Matai 26:47-52.

 Kanisá naino: Lokola Yesu apekisaki bakristo kobunda, ata mpo na kobatela ye, okanisi ete ezali malamu básimba mandoki mpo na kobunda? Tángá lisolo “Bitumba ezali malamu mpo na bakristo?” mpo na komona ndenge bakristo ya liboso balandaki ndakisa mpe mateya ya Yesu na bosembo mpenza.

Nini ekokómela mangomba oyo epesaka mabɔkɔ na bitumba?

 Biblia eteyaka ete Nzambe andimaka te mangomba oyo elobaka ete elandaka Yesu kasi eboyaka kosalela mateya na ye.​—Matai 7:21-23; Tito 1:16.

  •   Mokanda ya Emoniseli elobi ete Nzambe amonaka mangomba yango ete ezali na ngambo ya makila “ya baoyo nyonso babomamaki na mabele.” (Emoniseli 18:21, 24) Soki olingi koyeba ntina oyo atalelaka yango bongo, tángá lisolo “Babilone Monene ezali nini?

  •   Yesu ateyaki ete Nzambe akoboma mangomba nyonso ya lokuta mpo na misala na yango ya mabe, kaka ndenge bakataka nzete ya mabe “mpe babwakaka yango na mɔtɔ” mpo ebotaka mbuma ya malamu te. (Matai 7:15-20) Tángá lisolo “Nsuka ya mangomba ya lokuta ekómi pene!” mpo na koyeba ndenge likambo yango ekosalema.

Photo credits, banda na lobɔkɔ ya mwasi: Photo by Sefa Karacan/Anadolu Agency/Getty Images; Maxym Marusenko/NurPhoto via Getty Images

a UCCRO, to Lisangá ya mangomba ya Ukraine, ezali na mangomba 15: bamonisi ya lingomba ya Orthodoxe, ya Katolike ya Grèce mpe ya Roma, ya Protesta, mangomba mosusu ya bokristo, Bayuda mpe Bamizilma.