Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | HOSEA 1-7

Yehova asepelaka na motema boboto to bolingo ya sembo​—Bongo yo?

Yehova asepelaka na motema boboto to bolingo ya sembo​—Bongo yo?

Bolingo ya sembo etindaka moto alapa ndai, azanga mbeba, azala sembo mpe akangama makasi na moto to na Nzambe. Yehova asalelaki ndakisa ya Hosea mpe mwasi na ye, Gomere, mpo na kopesa liteya na oyo etali bolingo ya sembo mpe kolimbisa.​—Hos 1:2; 2:7; 3:1-5.

Ndenge nini Gomere amonisaki ete azangaki bolingo ya sembo?

Ndenge nini Yisraele emonisaki ete ezangaki bolingo ya sembo?

Ndenge nini Hosea amonisaki bolingo ya sembo?

Ndenge nini Yehova amonisaki bolingo ya sembo?

MPO NA KOMANYOLA: Ndenge nini nakoki komonisa ete nalingaka Yehova?