Hosea 1:1-11

  • Mwasi ya Hosea mpe bana oyo abotaki (1-9)

    • Yizreele (4), Lo-ruhama (6), mpe Lo-ami (9)

  • Elikya ete makambo ekozonga malamu mpe bomoko ekozala (10, 11)

1  Liloba oyo Yehova alobaki na Hosea* mwana ya Beeri na boyangeli ya Uzia,+ ya Yotame,+ ya Ahaze+ mpe ya Ezekiasi,+ bakonzi ya Yuda,+ mpe na boyangeli ya Yeroboame+ mwana ya Yoashe,+ mokonzi ya Yisraele. 2  Ntango Yehova abandaki koloba maloba na ye na nzela ya Hosea, Yehova alobaki na Hosea boye: “Kende kobala mwasi oyo akosala bondumba,* mpe okozwa bana oyo bakobotama na bondumba* yango, mpo ezali mpo na bondumba* nde mokili etiki mpenza kolanda Yehova.”+ 3  Na yango Hosea akendaki kobala Gomere mwana ya Diblaime, azwaki zemi mpe abotelaki ye mwana mobali. 4  Bongo Yehova alobaki na Hosea boye: “Pesá ye nkombo Yizireele,* mpo etikali moke nakosɛnga libota ya Yehu ezongisa monɔkɔ+ mpo na misala ya kosopa makila ya Yizireele,* mpe nakosukisa bokonzi na ekólo* Yisraele.+ 5  Mokolo yango, nakobuka litimbo ya Yisraele na Lobwaku* ya Yizireele.” 6  Gomere azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mwasi. Mpe Nzambe alobaki na Hosea boye: “Pesá ye nkombo Lo-ruhama,* mpo nakomonisela lisusu ekólo Yisraele motema mawa te.+ Kutu nakobengana bango mpenza.+ 7  Kasi nakomonisela ekólo* ya Yuda+ motema mawa, mpe ngai, Yehova Nzambe na bango, nde nakobikisa bango;+ nakobikisa bango na litimbo te, na mopanga te, na etumba te, na bampunda te, na batambwisi-mpunda mpe te.”+ 8  Nsima ya kolongola Lo-ruhama na mabɛlɛ, Gomere azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. 9  Bongo Nzambe alobaki: “Pesá ye nkombo Lo-ami,* mpo bino bozali bato na ngai te mpe ngai nakozala Nzambe na bino te. 10  “Mpe bato* ya Yisraele bakokóma ebele mpenza lokola bambuma ya zɛlo ya mbu oyo ekoki komekama te to kotángama te.+ Mpe na esika oyo nazalaki koloba na bango ete: ‘Bozali bato na ngai te,’+ nakoloba na bango: ‘Bozali bana ya Nzambe ya bomoi.’+ 11  Ɛɛ, bato ya Yuda mpe ya Yisraele bakoyanganisama na bomoko,+ bakopona mokonzi moko, mpe bakobima na mokili yango, mpo mokolo ya Yizireele ekozala mokolo monene.+

Maloba na nse

Ebengeli ya mokuse ya Hoshaya, oyo elimboli “abikisami na Yah; Yah abikisi.”
To, “pite; akosangisa nzoto na bato ndenge na ndenge.”
To, “pite; akosangisa nzoto na bato ndenge na ndenge.”
To, “pite; akosangisa nzoto na bato ndenge na ndenge.”
Engumba epai bakonzi ya Yisraele bokonzi ya nɔrdi bazalaki kofanda atako Samaria nde ezalaki engumba-mokonzi.
Lil., “ndako.”
Elimboli, “Nzambe akolona mboto.”
To, “Lobwaku patatalu.”
Elimboli, “bamoniseli ye motema mawa te.”
Lil., “ndako.”
Elimboli, “bato na ngai te.”
Lil., “bana.”