Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Teyá solo

Teyá solo

Kobanda na sanza ya libwa, lolenge moko ya sika ya kobanda lisolo ekobanda kobima na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo; ezali na motó ya likambo “Teyá solo.” Mokano na biso ekozala ya kolakisa moto liteya moko ya Biblia, na lisalisi ya motuna mpe vɛrsɛ moko.

Soki tomoni ete moto asepeli, tokoki koluka ndenge ya kozongela ye: tokoki kotikela ye mokanda to mpe kolakisa ye video moko ya jw.org. Tosengeli kosala makasi tózongela ye nsima ya mikolo moke mpo tóyebisa ye makambo mosusu. Makanisi mpo na ndenge ya sika ya kobanda lisolo mpe masolo ya bana-kelasi ekouta na bitanda oyo elobi “Na mokuse” na buku Makambo oyo Biblia eteyaka. Kuna, tokozwa mituna mpe bavɛrsɛ mosusu oyo ekoki kosalisa biso tózongela bato to tósalela kaka Biblia mpo na koyekola na bango.

Nzela oyo ezali komema na bomoi ezali kaka moko. (Mt 7:13, 14) Lokola tosololaka na bato ya mangomba mpe mimeseno ndenge na ndenge, tosengeli kolobela mateya ya Biblia na ndenge oyo ekosepelisa moto mokomoko. (1Ti 2:4) Soki tomeseni kolobela masolo ndenge na ndenge ya Biblia mpe tokolisi makoki na biso ya “kosembola liloba ya solo malamumalamu,” esengo na biso ekobakisama, mpe tokolonga koteya bato solo.2Ti 2:15.