Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Biyano ya polele mpe oyo ebongi ya Biblia, ekamwisaki ngai

Biyano ya polele mpe oyo ebongi ya Biblia, ekamwisaki ngai
  • ABOTAMAKI NA: 1948

  • EKÓLO: HONGRIE

  • BOMOI NA YE YA KALA: NAZALAKI NA MPOSA MAKASI YA BIYANO NA MITUNA MINENE ETALI BOMOI

NDENGE NAZALAKI:

Nabotamá na Székesfehérvár, engumba moko ya Hongrie oyo ezali na masolo mingi ya kala banda bambula koleka 1 000. Likambo ya mawa, nabosanaka te makambo ya mabe oyo Etumba ya Mibale ya mokili mobimba etiká na mboka yango.

Ntango nazalaki mwana moke, nabokwamaki epai ya bankɔkɔ na ngai. Nabosanaka bango te; mingimingi nkɔkɔ na ngai ya mwasi Elisabeth. Asalisaki ngai nakóma na kondima makasi epai ya Nzambe. Ntango nakómaki na mbula misato, nazalaki kozongela elongo na ye mpokwa nyonso Libondeli ya Nkolo ndenge bato mosusu babengaka yango. Ata bongo, kaka ntango nakómaki na mbula 20 nde nayebaki ndimbola ya libondeli yango.

Bankɔkɔ na ngai bazalaki kobatela ngai na bomwana mpo baboti na ngai bazalaki kosala butu moi mpo bázwa mbongo ya kosomba lopango ya kitoko. Atako bongo, mokolo ya pɔsɔ nyonso ya mibale ya sanza, tozalaki kolya esika moko libota mobimba. Kolekisa ntango elongo ndenge wana ezalaki kosepelisa ngai mingi.

Na 1958, mokano ya baboti na ngai ekokisamaki; bazwaki mbongo ya kosomba lopango mpo biso nyonso misato tófanda esika moko. Nsukansuka, nakómaki kofanda na baboti na ngai; nasepelaki mingi mpenza! Sanza motoba na nsima, esengo yango esilaki na mbalakaka. Tata na ngai akufaki na maladi ya kansɛr.

Esalaki ngai mpasi mingi. Nakanisi lisusu ndenge nazalaki kobondela: “Nzambe, nabondelaki yo obikisa tata na ngai. Nazali na mposa na ye. Mpo na nini oyanolaki mabondeli na ngai te?” Nazalaki mpenza na mposa ya koyeba esika oyo tata na ngai akendaki. Namitunaki boye: ‘Akei na likoló? To akozala lisusu te mpo na libela?’ Nazalaki kolula bana mosusu oyo bazalaki na batata na bango.

Na boumeli ya bambula, nazalaki kokende mingi na lilita na ye. Nazalaki kofukama liboso ya lilita ya tata na ngai mpe kobondela boye: “Nabondeli yo, Nzambe, nalingi nayeba esika tata na ngai azali.” Nazalaki mpe kobondela mpo asalisa ngai nayeba mpenza ntina ya bomoi.

Ntango nakómaki na mbula 13, nazwaki ekateli ya koyekola monɔkɔ ya Allemand, na elikya ete nakozwa biyano na mituna na ngai na ebele ya mikanda ya monɔkɔ yango. Na 1967, nakómaki kotánga na engumba Iéna, na ɛsti ya Allemagne. Nazalaki kotánga na mposa makasi babuku ya bato ya filozofi ya Allemagne, mingimingi oyo ezalaki kolobela ntina mpenza ya bomoi ya bato. Atako namonaki mwa makanisi oyo esepelisaki ngai, moko te eyanolaki na mituna na ngai. Nakobaki kobondela mpo na kozwa biyano.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Na 1970, nazongaki na Hongrie epai nakutanaki na Rose, mwasi oyo nabalaki. Na ntango wana, Bakoministe nde bazalaki koyangela Hongrie. Mwa moke nsima ya libala na biso, ngai ná Rose tokimaki na Autriche. Mokano na biso ezalaki ya kokende kofanda na Sydney, na Australie epai nɔkɔ na ngai azalaki kofanda.

Eumelaki te nazwaki mosala na Autriche. Mokolo moko, moninga na ngai ya mosala ayebisaki ngai ete nakoki kozwa biyano na mituna na ngai nyonso na Biblia. Apesaki ngai mwa mikanda oyo ezalaki kolimbola Biblia. Natángaki yango nyonso mpe nazalaki na mposa ya koyeba makambo mosusu. Na yango, nakomelaki Batatoli ya Yehova, babimisi ya mikanda yango mpe nasɛngaki mikanda mosusu.

Na mokolo ya anivɛrsɛrɛ ya liboso ya libala na biso, elenge mobali moko ya Autriche oyo azalaki Motatoli ya Yehova ayaki kotala biso. Amemelaki ngai mikanda oyo nasɛngaki mpe asɛngaki ngai tóbanda koyekola Biblia na ye mpe nandimaki. Lokola nazalaki na mposa ya koyeba makambo mingi, tozalaki koyekola mbala mibale na pɔsɔ na boumeli ya ngonga soki minei!

Nasepelaki mingi na mateya ya Biblia oyo Batatoli ya Yehova bateyaki ngai. Ntango balakisaki ngai nkombo ya Nzambe, Yehova na Biblia na ngai ya monɔkɔ ya Hongrois, nakamwaki mpenza. Na boumeli ya mbula 27 oyo nabandaki kokende na eglize, natikalá koyoka nkombo ya Nzambe ata mbala moko te. Biyano ya polele mpe oyo ebongi ya Biblia, ekamwisaki ngai. Na ndakisa, nayekolaki ete bakufi bayebi ata eloko te, bakokani na moto oyo alali mpɔngi makasi. (Mosakoli 9:5, 10; Yoane 11:11-15) Nayekolaki mpe elaka oyo Biblia epesi ete na mokili ya sika “liwa ekozala lisusu te.” (Emoniseli 21:3, 4) Nazali na elikya ya komona lisusu tata na ngai, na mokili ya sika ntango “lisekwa ekozala.”​—Misala 24:15.

Rose mpe akómaki koyekola Biblia na motema mobimba. Tosalaki milende nokinoki, tosilisaki buku oyo tozalaki koyekola kaka na sanza mibale mpamba! Tobandaki koyangana na makita nyonso ya Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi. Bolingo, kosalisana mpe bomoko ya Batatoli ya Yehova ekamwisaki biso mpenza.​—Yoane 13:34, 35.

Na 1976, bapesaki ngai ná Rose nzela ya kokɔta na Australie. Tolukaki mbala moko Batatoli ya Yehova. Batatoli ya Yehova ya ekólo yango bazwaki biso lokola bapaya te. Na 1978, tokómaki Batatoli ya Yehova.

MATOMBA OYO NAZWI:

Nsukansuka nazwaki biyano ya mituna oyo etungisaki ngai bambula mingi. Kopusana penepene na Yehova Nzambe, esali ete nakóma na Tata oyo aleki batata nyonso. (Yakobo 4:8) Mpe elikya ya komona lisusu tata oyo abotaki ngai na mokili ya sika oyo ezali koya, ezali likambo ya ntina mingi mpo na ngai.​—Yoane 5:28, 29.

Na 1989, ngai ná Rose tozwaki ekateli ya kozonga na Hongrie mpo na kosakwela baninga, bato ya libota na biso mpe bato mosusu oyo tokokutana na bango makambo oyo toyekolaki na Biblia. Tozwi libaku ya koteya ebele ya bato mateya ya Biblia. Na kati na bango, bato koleka 70 bakómaki Batatoli ya Yehova lokola biso, ezala mpe mama na ngai.

Nabondelaki Nzambe na boumeli ya mbula 17 asalisa ngai nazwa biyano na mituna na ngai. Mbula 39 mosusu eleki mpe nazali kaka kobondela, kasi sikoyo nakoki kaka koloba, “Mersi, Tata na ngai ya likoló ndenge oyanoli mabondeli na ngai ya bomwana.”