Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | OKOKI KOPUSANA PENEPENE NA NZAMBE

Osalaka makambo oyo Nzambe asɛngaka?

Osalaka makambo oyo Nzambe asɛngaka?

“Nyonso oyo okolinga, yebisá ngai mpe nakosala yango na esengo nyonso.” Na ntembe te, ezali mpasi oloba maloba oyo epai ya moto oyo oyebi te to oyo oyebi mpenza malamu te. Kasi, okoki koloba yango na pɛtɛɛ nyonso epai ya moninga moko ya motema. Baninga ya motema basalelaka baninga na bango makambo oyo basɛngaka bango.

Biblia emonisi ete mbala mingi, Yehova asalelaka bato oyo basambelaka ye makambo oyo ekopesa bango esengo. Na ndakisa, Mokonzi Davidi, oyo azalaki moninga ya motema ya Nzambe, akomaki boye: “Osali makambo mingi, Ee Yehova Nzambe na ngai, ɛɛ misala na yo ya kokamwa mpe makanisi na yo epai na biso. . . . Ekómi ebele koleka oyo nakoki koyebisa.” (Nzembo 40:5) Longola yango, Yehova asalaka kutu makambo oyo esepelisaka baoyo bayebi ye te, ‘atondisaka mitema na bango mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.’​—Misala 14:17.

Tosepelaka kosalela bato oyo tolingaka mpe tomemyaka makambo

Lokola Yehova asepelaka kosala makambo oyo epesaka basusu esengo, ebongi mpenza koloba ete baoyo balingi kozala baninga ya Nzambe basengeli kosala makambo oyo ‘ekosepelisa motema’ na ye. (Masese 27:11) Kasi, osengeli mpenza kosala nini mpo osepelisa Nzambe? Biblia eyanoli boye: “Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.” (Baebre 13:16) Yango elingi koloba ete kosala malamu mpe kokabela basusu biloko nde ekoki mpo na kosepelisa Yehova?

Biblia elobi ete: ‘Soki moto azali na kondima te akoki kosepelisa Nzambe ata moke te.’ (Baebre 11:6) Simbá ete, kaka ntango “Abrahama andimelaki Yehova” nde “akómaki kobengama moninga ya Yehova.” (Yakobo 2:23) Yesu mpe amonisaki ntina ya ‘kondimela Nzambe’ soki tolingi kozwa mapamboli. (Yoane 14:1) Kasi ndenge nini okoki kokóma na kondima oyo Nzambe asɛngaka baoyo abendaka bango epai na ye? Okoki kobanda na koyekola Biblia, Liloba ya Nzambe, mbala na mbala. Soki osali bongo, okozwa “boyebi ya solosolo ya mokano na ye” mpe okoyeba ndenge ya ‘kosepelisa ye mpenza.’ Na nsima, ntango ozali kokolisa boyebi ya solosolo ya Yehova mpe ozali kosalela makambo oyo ozali koyekola, kondima na yo ekokóma makasi mpe akopusana mpenza penepene na yo.​—Bakolose 1:9, 10.