Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Teyá bana na yo

Lokoso ebebisaki Gehazi

Lokoso ebebisaki Gehazi

ESÍ ekómela yo oyoka mposa makasi ya eloko moko boye? * Soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. Kasi, osengeli nde kokosa mpo na kozwa eloko oyo olingi?— Te, osengeli kosala bongo te. Moto oyo asalaka bongo azali lokoso. Tótala naino ndenge lokoso ebebisaki mobali moko na nkombo Gehazi. Azalaki mosaleli ya Elisha, mosakoli ya Yehova, Nzambe ya solo.

Elisha ná Gehazi bazalaki na bomoi bambula soki nkóto moko liboso Yesu, Mwana ya Nzambe, abotama awa na mabele. Yehova asalelaki Elisha mpo na kosala makambo ya kokamwa​—kosala makamwisi! Na ndakisa, Biblia elobeli mobali moko oyo azalaki mokonzi monene ya basoda ya Siri, oyo azalaki na maladi mabe ya maba. Moto moko te akokaki kobikisa ye, kasi Elisha abikisaki ye.

Ntango Nzambe asalelaki ye mpo na kobikisa bato, Elisha azalaki kosɛnga mbongo te. Oyebi mpo na nini?— Mpo Elisha ayebaki ete Yehova nde azalaki kosala makamwisi yango, kasi ye te. Ntango Naamane abikisamaki, asepelaki mingi mpe alingaki kopesa Elisha makabo ya wolo, palata, mpe ya bilamba kitoko. Elisha aboyaki kozwa ata eloko moko, kasi Gehazi azalaki mpenza na mposa ya kozwa makabo yango.

Ntango Naamane akendaki, Gehazi alandaki ye kozanga koyebisa Elisha. Ntango amonaki Naamane, oyebi likambo nini Gehazi ayebisaki ye?— ‘Elisha atindi ngai nayebisa yo ete kaka sikoyo bapaya mibale bayei epai na ye. Alobi opesa ye bilamba mibale mpo apesa bango.’

Kasi, yango ezalaki lokuta! Likambo oyo Gehazi alobaki ya bapaya mibale ezalaki solo te. Alobaki bongo mpo alingaki kozwa bilamba oyo Naamane alingaki kopesa Elisha. Naamane mpe ayebaki te ete Gehazi akosaki ye. Yango wana, asepelaki mpe apesaki Gehazi makabo yango. Kutu, Naamane apesaki Gehazi biloko mingi koleka oyo asɛngaki. Oyebi likambo nini esalemaki na nsima?

Ntango Gehazi azongaki na ndako, Elisha atunaki ye boye: ‘Outi wapi?’

Gehazi ayanolaki ete: ‘Epai te.’ Nzokande, Yehova amonisaki Elisha likambo oyo Gehazi asalaki. Yango wana, Elisha alobaki boye: ‘Oyo ezali te ntango ya kondima mbongo to bilamba!’

Gehazi azwaki mbongo mpe bilamba oyo ezalaki ya ye te. Yango wana, Nzambe apesaki Gehazi maba oyo ezalaki epai ya Naamane. Okanisi ete tokoki kozwa liteya nini na likambo yango?— Liteya oyo tokoki kozwa ezali ete tosengeli te kokosa to koloba makambo oyo ezali solo te.

Mpo na nini Gehazi alobaki likambo oyo ezalaki solo te?— Ezalaki mpo Gehazi azalaki lokoso. Alingaki kozwa eloko oyo ezali ya ye te, mpe amonaki ete esengeli abuka lokuta mpo na kozwa yango. Mpo na yango, azwaki maladi moko ya mabe bomoi na ye mobimba.

Na ntembe te, Gehazi anyokwamaki mpo na likambo mosusu oyo eleki kutu maladi ya maba. Oyebi soki ezalaki nini?— Abebisaki boninga na ye ná Nzambe; Nzambe azalaki kolinga ye lisusu te. Tiká ete tósala ata eloko moko te oyo ekosala ete likambo ya ndenge wana ekómela biso! Kasi, tózala nde na boboto mpe tókabolaka ná basusu biloko oyo tozali na yango.

^ par. 3 Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.