Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Teyá bana na yo

Yotame atikalaki sembo atako mobulu ekɔtaki na ndako na bango

Yotame atikalaki sembo atako mobulu ekɔtaki na ndako na bango

NTANGO moboti moko atiki kosalela Yehova, Nzambe ya solo, bomoi ya mwana ekoki kokóma na mikakatano. Tiká tólobela naino Yotame. Tokomona mikakatano oyo akutanaki na yango epai na bango ntango azalaki kokola.

Uziya, tata ya Yotame azalaki mokonzi na Yuda. Azalaki mobali moko oyo alekaki na nguya na ekólo yango. Uziya azalaki mokonzi moko malamu na boumeli ya bambula mingi, ata kutu liboso Yotame abotama. Kasi na nsima, ntango Yotame azalaki naino elenge, Uziya akómaki na lolendo mpe abukaki mobeko ya Nzambe. Yango wana Nzambe apesaki ye maba, maladi moko mabe. Oyebi soki Yotame asalaki nini? *

Yotame akobaki kosalela Yehova. Ekoki kozala ete mama na ye Yerusha nde asalisaki ye. Ata bongo, ekokaki kozala mpasi mpo Yotame atikala sembo epai ya Yehova ntango babenganaki tata na ye Uziya na ndako ya Yehova.

Bongo soki tata to mama na yo atiki kosalela Yehova? Ekozala mpasi mpo na yo, boye te?— Kasi, ezali mabe te kokanisa oyo okosala soki likambo ya ndenge wana ekómeli yo. Makambo oyo Davidi akomaki na Biblia emonisi biso yango.

Yese, tata ya Davidi azalaki moto malamu. Asalelaki Yehova, mpe na ntembe te, Davidi alingaki tata na ye. Kasi, Davidi ayekolaki kolinga Yehova mingi koleka ndenge alingaki Yese. Tótala naino ndenge oyo toyebi yango.

Fungolá naino Biblia na Nzembo 27:10. Awa Davidi akomaki boye: “Soki tata na ngai ná mama na ngai basundoli ngai, Yehova ye moko akolɔkɔta ngai.” Kanisá naino: Biblia elobi ete soki Yese, tata ya Davidi to mama na ye atikaka kosalela Yehova, Davidi alingaki kokoba kosalela ye.

Bongo yo? Okokoba kosalela Yehova ata soki tata to mama na yo atiki kosalela ye?— Ezali motuna moko ya malamu oyo osengeli komituna. Mobeko oyo eleki monene na Biblia nde esengeli kotinda biso tósala yango. Mobeko yango ezali oyo: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.”

Mobeko yango elakisi kozala sembo epai ya Yehova ata na ntango oyo ezali mpasi kosala yango. Okanisi ete nani nde alingaka tótika kosalela Yehova?— Ezali Satana Zabolo monguna ya Nzambe. Yesu abengaki ye “mokonzi ya mokili oyo.” Biblia elobaka mpe ete azali “nzambe ya makambo ya ntango oyo.” Tosengeli nde kobanga Satana?

Te. Kutu, tosengeli nde kobosana te ete Yehova aleki Satana na nguya. Yehova akobatela biso soki totyeli ye motema. Tángá na Biblia na yo ndenge oyo Yehova abatelaki Davidi liboso ya engambe Goliate. Yehova akoki mpe kobatela yo soki otikali sembo epai na ye.

^ par. 4 Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.