LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI Sanza ya Septembre 2012 | Nzambe azwaka basi na valɛrɛ?

Na kolanda Biblia, talá ndenge Nzambe atalelaka basi mpe ndenge oyo Yesu azalaki kosalala bango makambo.

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Mikakatano oyo basi bakutanaka na yango

Na mokili mobimba, bazali konyokola basi, ezala bilenge to mikóló, mpe bazali kozwa bango na valɛrɛ te na bomoi na bango mobimba. Mpo na nini?

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Nzambe azwaka mpenza basi na valɛrɛ?

Okanisaka ete Biblia ezwaka basi na valɛrɛ te? Talá ndenge oyo Nzambe atalelaka mpenza basi.

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Nzambe alingaka bápesa basi lokumu mpe limemya

Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yesu azalaki kotalela basi?

LISOLO YA BOMOI

Sikoyo nayebi Nzambe oyo nasambelaka

Talá ndenge pastɛrɛ moko ya lingomba ya Pantekote ayaki kozwa eloko oyo azalaki koluka banda kala: solo ya Biblia.

YEKOLÁ NA LILOBA YA NZAMBE

Nini ekosalema na Mokolo ya Kosambisama?

Bato bapesaka makanisi ndenge na ndenge mpo na Mokolo ya kosambisama. Ezali likambo ya kobangisa? Ekokokisa makambo nini?

Boboto​—Ezaleli ya ntina na miso ya Nzambe

Osengeli koluka komonisa boboto epai ya bato nyonso? Ndenge nini Nzambe atalelaka ezaleli yango?

KOKÓMA MONINGA YA NZAMBE

“Bikólo bakoyeba mpenza ete nazali Yehova”

Bato mingi bapesaka Nzambe foti mpo na makambo ya kozanga bosembo mpe bampasi oyo ezali na mokili. Ndenge nini Nzambe akosukola nkombo na ye?

Oyebaki yango?

Ndenge nini bazalaki kotinda mikanda na ntango ya kala? Ndenge nini bazalaki kosomba mpe kotɛka biloko na Yisraele?

MITUNA YA BATÁNGI

Batatoli ya Yehova bazalaka na basi oyo bateyaka?

Soki bongo, ndenge nini likambo yango eyokani na Biblia? Mosala na bango nini?

Kosakola na sudi mpenza ya Mpoto

Mobembo ya mpasi mpo na kokóma tii na Gavdos, esanga moko na sudi ya Krɛtɛ, elendisaki mingi.

Nkombo ya Nzambe eyebani na Swahili

Talá ndenge nkombo ya Nzambe, Yehova, ekɔtaki na Biblia ya Swahili.

TEYÁ BANA NA YO

Lokoso ebebisaki Gehazi

Gehazi azwaki biloko oyo ezalaki ya ye te. Yango ekoki koteya biso nini?