Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Esakweli 6. Mosala ya kosakola ezali kosalema na mokili mobimba

Esakweli 6. Mosala ya kosakola ezali kosalema na mokili mobimba

Esakweli 6. Mosala ya kosakola ezali kosalema na mokili mobimba

“Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi.”​—MATAI 24:14.

● Mwasi moko na nkombo Vaiatea afandaka mosika mpenza na esanga moko ya Pacifique, na kati ya bisanga ya Tuamotu. Atako Tuamotu ezali na bisanga soki 80 ya mabangamabanga oyo bonene na yango ezali ya kilomɛtrɛ-kare koleka 802 900, motángo ya bato oyo bafandaka kuna ezali kaka 16 000. Batatoli ya Yehova bakendaki kotala Vaiatea mpe baninga na ye. Mpo na nini? Mpamba te Batatoli ya Yehova balingaka kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai ya bato nyonso​—ata soki bato yango bafandaka esika nini.

MAKAMBO OYO EZALI KOSALEMA EMONISI NINI? Nsango malamu ya Bokonzi ezali kokóma bisika nyonso na mokili. Kaka na 2010, Batatoli ya Yehova balekisaki ngonga koleka miliare moko na ndambo na mosala ya kosakola nsango malamu na mikili 236. Yango elakisi ete Motatoli ya Yehova mokomoko asakolaki miniti 30 mokolo na mokolo. Na boumeli ya mbula zomi oyo eleki, babimisaki mpe bakabolaki mikanda oyo elimbolaka Biblia miliare koleka 20.

NTEMBE NINI BATO BABIMISAKA MINGI? Nsango ya Biblia esakolamá bandá bankóto ya bambula.

NTEMBE YANGO EZALI SOLO? Ezali solo ete bato mingi basakolaki makambo oyo etali nsango ya Biblia. Kasi, mingi na bango basalaki bongo kaka mpo na ntango mokuse mpe bakendaki mosika te. Nzokande, Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu na ndenge ebongi na mokili mobimba, nsango oyo ezali kokómela bankama ya bamilio ya bato. Batatoli bazali kokoba na mosala na bango ya kosakola atako bibongiseli mosusu ya nguya mingi mpe oyo ezangá mawa etɛmɛlaki bango makasi. * (Marko 13:13) Lisusu, Batatoli ya Yehova bafutamaka te mpo básakola. Kutu, bapesaka ntango na bango, mpe bapesaka bato mikanda na bango ofele. Mosala na bango esimbami mpenza na makabo ya bolingo.

OKANISI NINI? “Nsango malamu ya Bokonzi” ezali kosakolama na mokili mobimba? Kokokisama ya esakweli oyo elimboli ete mosika te makambo ya malamu ekozala?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 6 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá bakasɛti-video oyo misato “Fidèles dans les épreuves,” “Les triangles violets” mpe “La fermeté des Témoins de Jéhovah face à la persécution nazie” ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]

“Ntango nyonso oyo Yehova akotika nzela, tokokoba kosakola nsango malamu ya Bokonzi na molende, tokosalela nyonso oyo tozali na yango mpo na kosakwela bato.”​—ANNUAIRE 2010 DES TÉMOINS DE JÉHOVAH.