Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Esakweli 5. Kobebisa mabele

Esakweli 5. Kobebisa mabele

Esakweli 5. Kobebisa mabele

“[Nzambe akobebisa] baoyo bazali kobebisa mabele.”​—EMONISELI 11:18.

● Moto moko na nkombo Pirri, asalaka masanga ya mbila na Kpor, na Nigeria. Ebele ya mazuti oyo ekɔtaki na Delta ya Niger ebebisaki mosala na ye. Alobi boye: “Ebomi bambisi na biso, ebebisi loposo na biso, mpe ebebisi mikɛli na biso ya mai. Nazali lisusu na eloko ya kosala te mpo na kobikela.”

MAKAMBO OYO EZALI KOSALEMA EMONISI NINI? Bato mosusu ya mayele balobi ete batɔne milio 6 na ndambo ya bosɔtɔ ekɔtaka mbula na mbula na mai ya mbu. Balobaki ete bosɔtɔ yango mingi (50%) ezali biloko ya plastiki oyo eumelaka bankama ya bambula liboso epɔla. Longola kobebisa mabele, bato bazali mpe kosilisa biloko ya motuya oyo ezalaka na mabele na ndenge moko ya nsɔmɔ. Bolukiluki emonisi ete soki bato basaleli mabele mbula mobimba, esɛngaka mbula moko na sanza mitano mpo mabele ezonga lisusu ndenge ezalaki. Zulunalo moko ya Australie (Sydney Morning Herald) elobi ete: “Soki bato bakobi kobakisama mpe kosalela mabele na ndenge ya mabe, na mobu 2035, tokozala na mposa ya mabele oyo tozali na yango lelo oyo mbala mibale.”

NTEMBE NINI BATO BABIMISAKA MINGI? Bato bazali na makoki ya kosilisa mikakatano mosusu. Tokoki kolonga mikakatano yango mpe kobikisa mabele.

NTEMBE YANGO EZALI SOLO? Bato mingi oyo basalaka mosala makasi balobelaki makambo etali kobebisama ya mabele. Atako bongo, mabele ezali se kobeba mingi mpenza.

OKANISI NINI? Esengeli ete Nzambe abikisa etando na biso mpo ebeba te, ndenge alakaki kosala yango?

Longola bisakweli mitano oyo touti kotalela, Biblia esakolaki mpe makambo ya malamu mpo na mikolo ya nsuka. Tótalela ndakisa moko.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]

“Namoni ete eteni na ngai ya mabele ezali lisusu mwa paradiso te ndenge ezalaki liboso, kasi ekómi nde esika ya kobwaka biloko oyo ezali pwazɔ.”​—MALOBA YA ERIN TAMBER, OYO AFANDAKA NA BOKULA YA GOLFE, NA ÉTATS-UNIS, MPO NA MAKAMBO OYO MAZUTI ESALAKI NA 2010 NA GOLFE YA MEXIQUE.

[Etanda na lokasa 8]

Ezali foti ya Nzambe?

Lokola Biblia esakolaki makambo mabe oyo tozali komona lelo oyo, yango emonisi ete Nzambe nde abimisaka yango? Ye nde moto abimiselaka biso minyoko? Okoki kozwa biyano oyo ebongi na mituna yango na mokapo 11 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]

U.S. Coast Guard photo