Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bampasi oyo ezali komema na elikya

Bampasi oyo ezali komema na elikya

Bampasi oyo ezali komema na elikya

“Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.”​—2 TIMOTE 3:1.

OSILÁ koyoka to komona moko ya makambo ya mpasi oyo ezali awa na nse?

● Maladi moko ya mabe ezali koboma ebele ya bato.

● Nzala ezali koboma bankama ya bato.

● Koningana ya mabele ezali koboma bankóto ya bato mpe ezali kosala ete ebele ya bato mosusu bázanga bisika ya kofanda.

Na masolo oyo elandi, okomona makambo mosusu ya ndenge wana oyo ezali kosalema na mokili, oyo endimisi makambo wana. Okomona mpe ete Biblia esakolaki ete makambo ya ndenge wana ekosalema na “mikolo ya nsuka.” *

Kasi, ntina ya masolo oyo ezali te ya kondimisa yo na makasi ete tozali na mokili oyo etondi na yikiyiki. Ekoki kozala ete yo moko mpe ozali komona makambo yango. Kasi, masolo yango ebongisami mpo na kopesa yo elikya. Ekomonisa ete kokokisama ya bisakweli yango motoba elimboli ete etikali moke “mikolo ya nsuka” esila. Masolo yango ekolobela mpe bantembe oyo bato babimisaka mingi na likambo yango, mpe ekomonisa ntina mpenza ya kondima ete mikolo ya malamu ezali liboso na biso.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 7 Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe atiki makambo wana ya mabe ezala, talá lisolo “Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe mpe bampasi?” na lokasa 16 mpe 17 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo.