Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu azali Nzambe?

Yesu azali Nzambe?

MPO na bato mingi, Bosato ezali “liteya ya ntina mingi na lingomba ya Boklisto.” Liteya yango elobaka ete Tata, Mwana mpe elimo santu bazali bapersona basato na kati ya Nzambe moko. Kardinale, John O’Connor alobaki mpo na liteya yango boye: “Toyebi ete ezali libombami moko monene, oyo tokoki koyeba te.” Mpo na nini ezali mpasi mpo na koyeba liteya yango?

Buku moko, (The Illustrated Bible Dictionary) epesi ntina moko. Buku yango elobi mpo na Bosato ete: “Ezali liteya ya Biblia te mpamba te ezali ata na vɛrsɛ moko te ya Biblia oyo elobeli yango.” Lokola “ezali liteya ya Biblia te,” bato oyo bateyaka yango balukaka bavɛrsɛ ya Biblia, ntango mosusu kutu babalolaka bavɛrsɛ yango mpo na koluka kondimisa bato ete liteya yango ezali solo.

Vɛrsɛ yango eteyaka bosato?

Vɛrsɛ oyo basalelaka mingi mpo na koteya Bosato ezali Yoane 1:1. Bible na Lingala ya lelo oyo, ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Na ebandeli, liboso ’tè Nzambe ásala Likolo ná se, Liloba azalaká. Liloba azalaká ná Nzambe [na Grɛki, ton the·onʹ]. Liloba azalaká Nzambe [the·osʹ].” Na vɛrsɛ yango liloba ya Grɛki the·osʹ (nzambe) ekomami ndenge mibale. Ya liboso ebandi na liloba ton, yango ezali article, na monɔkɔ ya Grɛki, mpe na esika yango liloba the·onʹ emonisi Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Nzokande, the·osʹ ya mibale ezali na article te. Tokoki nde koloba ete ezali libunga?

Mpo na nini Bosato ezali liteya moko ya pɛtɛɛ te?

Evanzile ya Yoane ekomamaki na Koine to Grɛki ya bato nyonso, oyo ezalaki na mibeko na yango ya gramɛrɛ. Robertson, molimboli moko ya maloba ya Biblia, alobi ete soki maloba yango mibale ezalaki na article, “nyonso mibale elingaki kozala ndenge moko, mpe na ndimbola moko.” Robertson, apesaki ndakisa ya Matai 13:38, oyo elobi ete: “Elanga [na Grɛki, ho a·grosʹ] ezali mokili [na Grɛki, ho koʹsmos].” Gramɛrɛ ezali kosalisa biso tóyeba ete mokili ezali mpe elanga.

Kasi, ezali boni soki liloba ya liboso ezali na article kasi oyo ya mibale ezali na article te, lokola na Yoane 1:1? James Allen Hewett, moto moko ya mayele azwi ndakisa ya vɛrsɛ yango mpe alobi boye: “Soki basali bongo, yango ekomonisa ete liloba ya liboso ná oyo ya mibale ekeseni, ezali na ndimbola moko te.”

Mpo na komonisa yango, Hewett asaleli 1 Yoane 1:5, oyo elobi boye: “Nzambe azali pole.” Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “Nzambe” ezali ho the·osʹ ezali na article. Kasi, liloba phos, oyo ebongolami na “pole” ezali na article te. Hewett amonisi ete: “Tokoki ntango nyonso koloba ete . . . Nzambe azali pole; kasi tokoki ntango nyonso koloba te ete pole ezali Nzambe.” Bandakisa mosusu ezali na Yoane 4:24, “Nzambe azali elimo,” mpe 1 Yoane 4:16, “Nzambe azali bolingo.” Na bavɛrsɛ yango mibale, liloba Nzambe ezali na article, kasi maloba “Elimo” mpe “bolingo,” ezali na article te. Na yango, liloba ya liboso na oyo ya mibale ezali na ndimbola moko te. Bavɛrsɛ yango elimboli te ete “Elimo ezali Nzambe” to “bolingo ezali Nzambe.”

“Liloba” ezali nani?

Bato mingi ya mayele na monɔkɔ ya Grɛki mpe babongoli mingi ya Biblia bandimaka ete Yoane 1:1 emonisaka te soki “liloba” ezali nani, kasi emonisaka nde lolenge na ye. William Barclay, mobongoli moko ya Biblia alobi boye: “Lokola [ntoma Yoane] atyaki article te liboso ya liloba theos, yango emonisi ete azalaki nde kolobela lolenge Liloba azali . . . Yoane azalaki te komonisa ete Liloba kaka ye wana Nzambe. Na mokuse, alobaki te ete Yesu azali Nzambe.” Ndenge moko mpe Jason David BeDuhn, moto moko ya mayele alobi boye: “Na Grɛki, soki otye article te liboso ya liloba theos na fraze lokola oyo ezali na Yoane 1:1c, bato oyo bazali kotánga bakomona ete olingi koloba ‘nzambe.’ . . . Abakisi boye: Lokola liloba theos ezali na article te, ekeseni na ho theos; ndenge ‘nzambe’ ekeseni na ‘Nzambe’ na Lingala.” Alobi lisusu boye: “Na Yoane 1:1, Liloba azali te Nzambe kaka moko ya solo, kasi azali elimo lokola Nzambe.” Mpo na kolanda maloba ya Joseph Henry Thayer, moto moko ya mayele oyo asalaki mosala na libongoli moko ya Biblia (American Standard Version): “Logos [to Liloba] azalaki elimo lokola nzambe, kasi te Nzambe.”

Yesu amonisaki polele ete ye ná Tata bakeseni

Nzambe azali “libombami monene”? Ezalaki bongo te mpo na Yesu. Na libondeli moko oyo asalaki epai ya Tata na ye, amonisaki polele ete ye ná Tata bakeseni; alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Soki tondimi maloba ya Yesu mpe tokangi ntina ya mateya ya Biblia, tokomemya ye lokola Mwana ya Nzambe. Tokosambela mpe Yehova lokola “Nzambe kaka moko ya solosolo.”