Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tósala ete boyekoli na biso esepelisaka mpe esalisaka biso mpenza

Tósala ete boyekoli na biso esepelisaka mpe esalisaka biso mpenza

Tósala ete boyekoli na biso esepelisaka mpe esalisaka biso mpenza

Tokoki kosala nini mpo tósepelaka mingi na koyekola Biblia? Ndenge nini tokoki kosala ete boyekoli na biso esalisa biso mpenza? Tótalela na mokuse makambo misato ya ntina mingi oyo ekosalisa biso tózwa matomba mingi ntango tozali koyekola Biblia biso moko.

1 KOBONDELA: Likambo ya liboso ezali kobondela. (Nz. 42:8) Mpo na nini? Tosengeli komonaka ete koyekola Liloba ya Nzambe ezali na kati ya losambo na biso. Na yango, tosengeli kosɛnga Yehova afungola motema mpe makanisi na biso mpe apesa biso elimo santu na ye. (Luka 11:13) Barbara, oyo aumeli mingi na mosala ya misionɛrɛ, alobi boye: “Nabondelaka ntango nyonso liboso ya kotánga to koyekola Biblia. Nsima na yango, nayokaka ete Yehova azali elongo na ngai mpe ete asepeli na likambo oyo nazali kosala.” Kobondela liboso ya koyekola efungolaka makanisi mpe motema na biso mpo tóndima bilei nyonso ya elimo oyo ezali liboso na biso.

2 KOMANYOLA: Bato mosusu basukaka kaka na kotánga Liloba ya Nzambe likolólikoló mpo bazali na ntango mingi te. Nzokande, bazangaka matomba oyo bakokaki kozwa na koyekola Biblia. Carlos, oyo asaleli Yehova mbula koleka 50, ayaki komona ntina ya kozwa mwa ntango ya komanyola mpo boyekoli na ye ya Biblia esalisa ye mpenza. Alobi boye: “Sikoyo, natángaka lisusu nkasa mingi te​—natángaka kaka nkasa soki mibale na mokolo. Na nsima, nalekisaka ntango mingi na komanyola makambo oyo natángi mpo natala mateya oyo nakoki kozwa.” (Nz. 77:12) Soki tozali kozwa ntango ya komanyola, tokokolisa boyebi mpe bososoli na biso ya mokano ya Nzambe.​—Kol. 1:9-11.

3 KOSALELA: Ntango moto amoni ete likambo moko boye ezali kosalisa ye, amipesaka na yango mingi koleka. Ezali mpe bongo mpo na boyekoli ya Biblia. Gabriel, ndeko mobali moko ya elenge oyo azali na programɛ malamu ya koyekola Biblia, alobi boye: “Koyekola esalisaka ngai nalonga mikakatano ya bomoi ya mokolo na mokolo, mpe esalisaka ngai nayeba kosalisa bato mosusu.” Abakisi boye: “Nasalaka makasi nasalelaka makambo nyonso oyo nayekoli.” (Mib. 11:18; Yos. 1:8) Ya solo, Liloba ya Nzambe ezali na makambo mingi oyo tokoki koyekola mpe kosalela.​—Mas. 2:1-5.

NA MOKUSE: Tozali mpenza na lokumu monene ya kozwa boyebi oyo euti na Yehova, Liziba ya bwanya nyonso! (Rom. 11:33) Na yango, mbala ya nsima oyo okoyekola, kobosana te kobanda liboso na kobondela Yehova mpe kosɛnga ye afungola makanisi na yo mpe apesa yo elimo santu na ye. Na nsima, zwá mwa ntango mpo na komanyola makambo oyo otángi. Longola yango, kobá kokanisa yango mpe kosalela makambo oyo oyekoli na bomoi na yo ya mokolo na mokolo. Soki ozali kosala makambo oyo tolobeli, boyekoli na yo ya Biblia ekobanda kosepelisa yo mingi mpe ekosalisa yo mpenza.