ELOBELI TITRE YA EZIPELI | OKOKI KOYEBA MATEYA YA BIBLIA
Lisalisi mpo na koyeba mateya ya Biblia
Kanisá ete okei na mboka mopaya mpo na mbala ya liboso. Okutani na bato, mimeseno, bilei mpe mbongo oyo oyebi te. Na ntembe te, okozala na mwa kobanga.
Okoki komiyoka bongo ntango otángi Biblia mpo na mbala ya liboso. Ekozongisa yo na mokili moko ya kala oyo oyebi te. Kuna, okokuta Bafilistia, okomona mimeseno lokola ‘kopasola bilamba,’ to okoyeba bilei oyo babengi mana mpe mbongo ya bibende oyo babengi drakimɛ. (Kobima 16:31; Yosua 13:2; 2 Samwele 3:31; Luka 15:9) Nyonso wana ekoki kotya yo mobulu na motó. Kaka ndenge ezalaka soki okei mboka mopaya, okosepela te moto moko asalisa yo?
LISALISI NA NTANGO YA KALA
Ntango makomi mosantu ekomamaki mpo na mbala ya liboso na siɛklɛ ya 16 liboso ya ntango na biso, bato bazwaki lisalisi mpo na koyeba yango. Na ndakisa, Moize, mokambi ya liboso ya ekólo Yisraele, “abandaki kolimbola” makomi yango.—Kolimbola Mibeko 1:5.
Bato oyo bayebaki mpenza koteya Makomami bazalaki tii na boumeli ya basiɛklɛ zomi oyo elandaki. Na mobu 455 liboso ya ntango na biso, Bayuda ebele ná bana na bango bayanganaki na esika ya bato nyonso na engumba Yerusaleme. Bateyi ya Biblia bazalaki wana mpo na “kotánga yango [buku wana mosantu] na mongongo makasi.” Kasi basukaki kaka wana te. “Basalisaki bato bákanga ntina ya makambo oyo bazalaki kotánga.”—Nehemia 8:1-8.
Siɛklɛ mitano na nsima, Yesu Kristo amipesaki mpe na mosala wana ya koteya. Kutu, ayebanaki libosoliboso lokola moteyi. (Yoane 13:13) Ateyaki bato ebele, ata mpe moto mokomoko. Na libaku moko, ateyaki ebele ya bato na lisolo oyo asalaki likoló ya ngomba mpe “ebele ya bato wana bakamwaki na ndenge na ye ya koteya.” (Matai 5:1, 2; 7:28) Na eleko ya prɛnta na mobu 33 ya ntango na biso, Yesu asololaki na bayekoli na ye mibale ntango bazalaki kotambola na nzela mpo na kokende na mboka moko pene ya Yerusaleme, ‘azalaki kolimbolela bango Makomami polelepolele.’—Luka 24:13-15, 27, 32.
Bayekoli ya Yesu bazalaki mpe bateyi ya Liloba ya Nzambe. Na libaku moko, mokonzi moko ya basoda ya Etiopi azalaki kotánga eteni moko ya Makomami. Moyekoli moko na nkombo Filipi apusanaki pene na ye mpe atunaki ye boye: “Ozali mpenza koyeba makambo oyo ozali kotánga?” Moetiopia ayanolaki boye: “Kutu, ndenge nini nakoki koyeba yango mpenza, soki moto alakisi ngai te?” Na nsima Filipi alimbolelaki ye yango.—Misala 8:27-35.
LISALISI OYO TOZALI NA YANGO LELO
Ndenge moko na bateyi ya Biblia na ntango ya kala, lelo oyo Batatoli ya Yehova bamipesi na mosala ya koteya bato Biblia na mokili mobimba na mikili 239. (Matai 28:19, 20) Pɔsɔ na pɔsɔ, basalisaka bato milio koleka 9 báyeba mateya ya Biblia. Mingi ya bayekoli yango bazali bandimi ya mangomba ya bokristo te. Boyekoli yango ezalaka ofele mpe ekoki kosalema na ndako ya moto to na esika mosusu oyo moto asepeli. Kutu, bato mosusu bayekolaka na nzela ya telefone to video, na ordinatɛrɛ to na baaparɛyi mosusu.
Tosɛngi yo oluka Motatoli ya Yehova moko mpo ayebisa yo ndenge okoki kosala mpo báyekola na yo Biblia. Okomona ete Biblia ezali buku oyo “ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini na boyengebene,” mpo ozala “na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.”—2 Timote 3:16, 17.