Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makamwisi​—Makambo ya solo to masapo mpamba?

Makamwisi​—Makambo ya solo to masapo mpamba?

Makamwisi​—Makambo ya solo to masapo mpamba?

ELENGE moko amonaki motuka moko eleki liboso na ye; na nsima ya motuka yango ezalaki na papye moko oyo bakomá ete “makamwisi esalemaka; tuná ata baanzelu.” Maloba yango ebendaki mpenza likebi na ye. Kasi atako asambelaka, ayebaki te ayebaki mpenza te soki elimboli nini. Maloba yango ezalaki nde komonisa ete sofɛlɛ yango andimaka makamwisi? To ezalaki kaka maloba ya kotyola mpo na komonisa ete andimaka makamwisi te, baanzelu mpe te?

Ntango mosusu maloba oyo Manfred Barthel, mokomi moko ya Allemagne, alobaki ekobenda likebi na yo: “Liloba likamwisi ekabolaka mbala moko batángi na ngámbo mibale.” Mpo na baoyo bandimaka, makamwisi esalemaka mpenza, ntango mosusu kutu ezongelamaka mbala na mbala. a Na ndakisa, balobaka ete na bambula oyo, bandimi ya mangomba na Grèce bazali koloba ete makamwisi esalemaka pene na sanza nyonso. Yango etindaki episkɔpɔ moko ya Lingomba ya Ɔrtɔdokse ya Grèce aloba boye: “Bandimi bakómi komona Nzambe, Malia mpe basantu mosusu lokola bato. Bandimi bátika kolekisa ndelo.”

Na bikólo mosusu, kaka bato moke nde bandimaka makamwisi. Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Allemagne na mobu 2002, emonisaki ete bato mingi (71%) balobaki ete makamwisi ezali masapo mpamba. Nzokande, na kati ya bato moke (na nse ya 30%) oyo bandimaka makamwisi, basi misato balobaki ete basololaki na Ngɔndɔ Malia. Mwa basanza na nsima ya likambo yango oyo basi yango balobaki ete Maria abimelaki bango elongo na baanzelu mpe ebenga, zulunalo moko (Westfalenpost) elobaki boye: “Banda wana tii sikoyo, bato soki 50 000 oyo bazali kouta na mikili ndenge na ndenge bazali koya na mboka yango, bamosusu mpo na koluka kobikisama na ndenge ya likamwisi mpe bamosusu mpo na koyeba makambo mingi na ntina ya emonaneli yango.” Bazalaki kokanisa ete bato mosusu ata 10 000 bakoya na mboka yango mpo bango mpe bámona Malia. Balobaka ete Malia abimaki mpe na engumba Lourdes, na France na mobu 1858, mpe na mboka Fátima, na Portugal, na 1917.

Ezali boni mpo na mangomba oyo endimaka Klisto te?

Pene na mangomba nyonso endimaka makamwisi. Buku moko (The Encyclopedia of Religion) elobi ete moto oyo abimisaki Lingomba ya Bouddha, oyo abimisaki lingomba ya boklisto mpe oyo abimisaki Lingomba ya Bamizilma, bango nyonso bazalaki na makanisi ndenge na ndenge na likambo etali makamwisi; kasi buku yango ebakisaki boye: “Lisolo ya mangomba yango emonisi mpenza ete makamwisi mpe masolo ya makamwisi ezalaki na esika monene na losambo ya bato.” Buku yango elobi ete “Bouddha ye moko azalaki na bantango mosusu kosala makamwisi.” Na nsima, ntango “Lingomba ya Bouddha ekɔtaki na Chine, bamisionɛrɛ na yango bazalaki mbala na mbala kosala makamwisi.”

Nsima ya kolobela makambo mwa mingi oyo babengaki makamwisi, buku yango esukisi boye: “Ekoki kozala mpasi mpo moto andima masolo ya makamwisi nyonso wana oyo bakomi oyo bazalaki bandimi balobelaki, kasi na ntembe te bakomaki yango kaka mpo na lokumu ya Bouddha, ye oyo azalaki na likoki ya kopesa bandimi na ye ya molende nguya ya kosala makamwisi.” Buku yango elobi mpe mpo na Lingomba ya Bamizilma boye: “Bamizilma mingi bazali kaka kolikya komona makamwisi. Masolo (hadīths) oyo bakomá na ntina na Mahommed elobaka ete azalaki mbala na mbala kosala makamwisi na miso ya bato nyonso. . . . Bato mosusu bakanisaka ete ata nsima ya liwa na bango, basantu basalaka makamwisi na malita na bango mpo na bato ya sembo, mpe bato basɛngaka bango bábondela mpo na bango.”

Ndenge nini batalelaka makamwisi na mangomba ya boklisto?

Bandimi mingi ya mangomba ya boklisto bazali na likanisi ndenge moko te na likambo ya makamwisi. Bamosusu bandimaka ete makamwisi ya Yesu Klisto mpe ya basaleli ya Nzambe oyo bazalaki liboso ya Yesu oyo Biblia elobeli esalemaki mpenza. Kasi mingi mpe bazali na likanisi ndenge moko na Martin Luther, mobandisi ya Lingomba ya Protesta. Buku oyo touti kolobela (The Encyclopedia of Religion) elobi na ntina na ye boye: “Luther ná Calvin bakomaki ete ntango ya makamwisi esilá, mpe ete bato basengeli te kokanisa ete bakomona lisusu makamwisi.” Buku yango elobi lisusu ete Lingomba ya Katolike ekobaki kondima makamwisi “kozanga ete eluka kolimbola ndenge makamwisi yango esalemaka.” Nzokande, “bato ya mayele na Lingomba ya Protesta bamonaki ete boklisto etalelaka mingimingi bizaleli malamu, mpe ete ezala Nzambe to bikelamu ya elimo basololaka na bato te mpe bakɔtaka mpenza na makambo na bango te.”

Bato mosusu oyo bamibengaka baklisto, ata mpe basango ná bapastɛrɛ, bandimaka te ete makamwisi oyo elobelami na Biblia esalemaki mpenza. Tózwa na ndakisa lisolo ya nzete moke oyo ezalaki kopela na mɔtɔ, oyo Biblia elobeli na Exode 3:1-5. Buku Oyo Biblia elobi mpenza (na Lingelesi) elobi ete bato mingi ya teoloji na Allemagne balobaka ete tosengeli te kotalela lisolo yango lokola likambo oyo esalemaki mpenza. Mpo na bango, lisolo yango ezali nde “komonisa ndenge Moize azalaki komiyoka; ndenge lisosoli na ye ezalaki kotungisama.” Buku yango ebakisi boye: “Ekoki mpe kozala ete mɔtɔ yango ezalaki nde bafololo oyo engɛngaki na mbala moko ntango nkembo ya Nzambe engɛngɛlaki yango.”

Okoki komona ete ndimbola wana ebongi te. Boye, osengeli kondima nini? Osengeli nde kondima ete makamwisi esalemaki mpenza? Ezali boni mpo na makamwisi oyo ezali kosalema lelo oyo? Lokola tokoki kotuna baanzelu te, tokotuna nani?

Likanisi ya Biblia

Moto nyonso ayebi ete Biblia elobi ete na ntango ya kala Nzambe azalaki ntango mosusu kosalela bato makambo ya kokamwa. Na ntina na ye, Biblia elobi boye: “Obimisaki bato na yo Yisalaele longwa na mokili ya Ezipito na bilembo mpe na bikamwiseli mpe na lobɔkɔ makasi mpe na lobɔkɔ losembolami mpe na nsɔmɔ monene.” (Yilimia 32:21) Kanisá naino, ekólo oyo elekaki na nguya na ntango wana esukisami na malɔzi zomi oyo Nzambe atindaki; moko ya malɔzi yango ezalaki liwa ya bana nyonso ya liboso na Ezipito. Ezalaki mpenza makamwisi!​—Exode, mokapo 7 tii na 14.

Bankama ya bambula na nsima, bakomi ya Baevanzile minei balobelaki makamwisi 35 oyo Yesu asalaki. Kutu, maloba na bango moko ezali komonisa ete Yesu asalaki makamwisi mingi koleka oyo bango balobeli. Makamwisi oyo balobeli esalemaki mpenza to ezali nde masapo mpamba? b​—Matai 9:35; Luka 9:11.

Soki Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe oyo alobaka solo, boye tosengeli kondima ete makamwisi oyo yango elobeli esalemaki mpenza. Biblia elobeli polele makamwisi lokola kobikisama ya bato ya maladi, kosekwisama ya bakufi mpe makamwisi mosusu oyo esalemaki na ntango ya kala; emonisi mpe polele ete makamwisi ya ndenge wana esalemaka lisusu te. (Talá etanda “Ntina oyo makamwisi mosusu esalemaka lisusu te,” na lokasa 4.) Yango elingi nde koloba ete ata bato oyo bandimaka Biblia bandimaka te makamwisi oyo ezali kosalema lelo oyo? Lisolo oyo elandi ekopesa eyano na motuna yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na lisolo oyo, liloba “makamwisi” elimboli makambo oyo esalemaka na mokili oyo, kasi moto moko te to eloko moko te na mokili ezali na likoki ya kosala yango.

b Makambo mingi ezali komonisa ete Biblia elobaka solo. Makambo yango elobelami na buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Etanda na lokasa 4]

NTINA OYO MAKAMWISI MOSUSU ESALEMAKA LISUSU TE

Biblia elobeli makamwisi ndenge na ndenge. (Exode 7:19-21; 1 Mikonzi 17:1-7; 18:22-38; 2 Mikonzi 5:1-14; Matai 8:24-27; Luka 17:11-19; Yoane 2:1-11; 9:1-7) Mingi kati na makamwisi yango esalisaki bato bámona ete Yesu azali mpenza Masiya mpe ete Nzambe azalaki na ye. Elimo ya Nzambe epesaki Bayekoli ya liboso ya Yesu makabo ya kokamwa lokola koloba minɔkɔ ndenge na ndenge mpe kososola maloba mapemami. (Misala 2:5-12; 1 Bakolinti 12:28-31) Makabo yango ya elimo ezalaki na ntina na ebandeli ya lisangá ya boklisto. Mpo na nini?

Ya liboso, Babiblia ezalaki mingi te na ntango wana. Mingimingi, kaka bato ya mbongo nde bazalaki na barulo to babuku. Na mikili ya bapakano, bato bayebaki Biblia to mpe Nkolo na yango Yehova te. Baklisto bazalaki koteya kaka na monɔkɔ. Makamwisi ezalaki na ntina mpo na komonisa ete Nzambe azalaki kosalela lisangá ya boklisto.

Kasi, Paulo amonisaki ete makabo yango esengelaki kosuka soki ntina na yango esili. “Ezala makabo ya bisakweli, ekolongolama; ezala minɔkɔ, ekosuka; ezala boyebi, ekolongolama. Mpo tozali na boyebi ya ndambo mpe tosakolaka kaka na ndambo; kasi ntango eloko oyo ezali ya mobimba ekoya, oyo ezali ya ndambo ekolongolama.”​—1 Bakolinti 13:8-10.

Lelo oyo, bato bazali na Babiblia, na mikanda oyo esalisaka na koluka mikapo ya Biblia mpe babuku mosusu oyo elimbolaka Biblia. Baklisto koleka milio motoba oyo bayekoli Biblia malamumalamu bazali kosalisa bato bázwa boyebi ya Nzambe na lisalisi ya Biblia. Na yango, makamwisi ezali lisusu na ntina te mpo na komonisa ete Yesu Klisto azali Mobikisi oyo Nzambe aponá to ete Yehova azali kosunga basaleli na ye.